Lakisá makambo oyo ezali na kati

18 SANZA YA 12, 2017
NINI BATYE SIKA

Tobongisi lisusu makambo oyo ezali na Eteni “Mateya ya Biblia”

Tobongisi lisusu makambo oyo ezali na Eteni “Mateya ya Biblia”

Tobongisi lisusu makambo oyo ezali na Eteni “Mateya ya Biblia” na jw.org mpo ezala pɛtɛɛ mpo na kokɔta mpe kozwa lisolo na lisolo. Makambo oyo elandi emonisi mbongwana yango:

  • Motó ya likambo moke ya sika “Istware mpe Biblia” elobeli kobatelama, kobongolama, mpe kokabolama ya Biblia mpe ndenge bolukiluki oyo ezali kosalema na mikolo oyo ekobi kondimisa ete Biblia elobaka solo.

  • Motó ya likambo moke ya sika “Kimya mpe esengo” elimboli ndenge Biblia ekoki kosalisa yo olonga mitungisi ya mokolo na mokolo mpe ozwa esengo mpe kimya na mikakatano minene oyo ozali kokutana na yango.

  • Motó ya likambo moke ya sika “Siansi mpe Biblia” emonisi ndenge biloko oyo ezali na mokili ezali komonisa ete makambo ya siansi oyo Biblia elobeli ezali solo.

  • Motó ya likambo moke “Biyano na mituna ya Biblia” ebongisami lisusu mpo ekóma lisusu pɛtɛɛ komona mituna na likambo moko boye.

  • Motó ya likambo moke “Libala mpe libota,” oyo ezwi esika ya “Toli mpo na bato babalá mpe baboti,” epesi toli ya Biblia oyo ekoki kobongisa libala na yo mpe kosalisa yo obɔkɔla bana na yo.