Lakisá makambo oyo ezali na kati

“Nasalaka oyo nakoki kosala”

“Nasalaka oyo nakoki kosala”

 Irma, oyo afandaka na Allemagne, azali na mbula soki 90. Nsima ya aksida mibale ya makasi oyo asalaki mpe lipaso oyo basalaki ye mbala na mbala, azalaka lisusu na likoki te ya kobima mosala ya kosakola ndako na ndako ndenge azalaki kobima liboso. Irma akómá sikoyo kosakwela bandeko mpe baninga na ye nsango malamu na nzela ya mikanda oyo atindelaka bango. Bato basepelaka na mikanda oyo Irma akomaka mpo na kolendisa mpe kobɔndisa baoyo bazali na matánga, yango wana mbala mingi babengaka ye na telefone mpo na kotuna soki akotindela bango mikanda mosusu ntango nini. Batindelaka ye mpe ebele ya mikanda mpo na kopesa ye mersi mpe kosɛnga ye atindela bango mikanda mosusu. Irma alobi: “Nyonso wana epesaka ngai esengo mpe esalaka ete nakoba kosakola nsango malamu.”

 Irma atindaka mpe mikanda na ye epai ya baoyo bafandaka na bandako ya mibange. Abakisi boye: “Mwasi moko ya mobange abengaki ngai na telefone mpe alobaki ete mokanda na ngai ebɔndisaki ye mingi nsima ya liwa ya mobali na ye. Atyá mokanda yango na Biblia na ye mpe mbala mingi atángaka yango na butu. Mwasi mosusu, oyo mobali na ye auti kokufa, alobaki ete mokanda na ngai esalisaki ye mingi koleka diskur ya sango. Azalaki na ebele ya mituna oyo esɛngaki azwa biyano mpe atunaki soki akoki koya kotala ngai na ndako.”

 Mwasi moko oyo ayebanaki na Irma kasi akendá kofanda esika mosusu ayebisaki Irma atindelaka ye mikanda. Irma alobi boye: “Mwasi yango abombaki mikanda nyonso oyo nazalaki kotindela ye. Nsima ya liwa na ye, mwana na ye ya mwasi abengaki ngai na telefone. Ayebisaki ngai ete atángaki mikanda nyonso oyo nakomelaki mama na ye mpe alobaki ete akosepela soki natindeli ye mpe mikanda yango oyo ezali kolobela makambo ya Biblia.”

 Irma asepelaka mpenza na mosala na ye ya kosakola. Alobi boye: “Nabondelaka Yehova akoba kopesa ngai makasi ya kosalela ye. Atako nazangi likoki ya kosakola ndako na ndako; nasalaka oyo nakoki kosala.”