Lakisá makambo oyo ezali na kati

Longwa na lobɔkɔ ya mwasi tii na oyo ya mobali: Ndeko Eldor ná ndeko Sanjarbek Saburov

07 SANZA YA 08, 2020
TURKMÉNISTAN

Tribinale moko ya Turkménistan ekateli ndeko Eldor mpe ndeko Sanjarbek Saburov etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ

Tribinale moko ya Turkménistan ekateli ndeko Eldor mpe ndeko Sanjarbek Saburov etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ

Na mokolo ya 06/08/2020, tribinale moko ya Turkménistan ekateli ndeko Eldor mpe ndeko Sanjarbek Saburov etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ mpo baboyi kokɔta na mosala ya soda mpo na lisosoli na bango. Bandeko yango bazali bato ya libota moko. Yaya azali na mbula 25 mpe leki azali na mbula 21. Tribinale yango eboyi bandeko yango básɛnga ete bátalela lisusu likambo na bango. Oyo ezali mbala ya mibale bákatela bandeko yango etumbu mpo baboyi kokɔta na mosala ya soda.

Na 2016, ndeko Sanjarbek Saburov aboyaki na limemya nyonso kokɔta mosala ya soda. Yango wana, batyelaki ye mwa bipekiseli na boumeli ya mbula mibale ya etumbu oyo bakatelaki ye.

Na mbula oyo elandaki, Eldor, leki ya Sanjarbek, aboyaki mpe kokɔta mosala ya soda. Tribinale ekataki ete na boumeli ya mbula mibale Leta ekozwa 20 % ya salɛrɛ na ye.

Mobeko ya Turkménistan elobi ete moto nyonso oyo aboyi kokɔta mosala ya soda, bakoki kofunda ye mbala mibale soki azali kaka koboya kokɔta mosala ya soda. Na sanza ya 04/2020, biro ya basoda esɛngaki lisusu bandeko na biso bákɔta mosala ya soda. Bango mibale baboyaki. Bafundaki bango mpe batyaki bango na bolɔkɔ.

Baboti ya bandeko na biso bazali na mawa mingi mpe komitungisa mpo bana na bango bakɔti bolɔkɔ. Baboti bango mpe bazali na mbongo te. Papa na bango abɛlaka mokɔngɔ, yango wana akoki kosala mosala te. Bana yango basalaka bilanga ya coton mpo na kosunga libota. Lokola bakɔti bolɔkɔ, baboti na bango bakozala na mbongo te mpo na kokokisa bamposa na bango. Kutu, sikoyo, baboti yango nde basengeli kokokisa bamposa ya bana na bango oyo bazali na bolɔkɔ.

Na Turkménistan, bapesaka moto mosala mosusu ya Leta te soki aboyi kosala mosala ya soda. Yango wana, tribinale ekatelaka bilenge mibali oyo baboyaka kosala mosala ya soda mpo na lisosoli na bango mbula mibale ya bolɔkɔ. Soki tobakisi bandeko Saburov, bilenge Batatoli oyo bakɔti bolɔkɔ mpo baboyi kokɔta mosala ya soda bakómi 10.

Yehova akopambola bandeko na biso ya Turkménistan mpo na mpiko na bango. Tiká ete mokomoko na bango abosana te elaka oyo Yehova apesaki mokonzi Asa ete: “Bino, bózala na mpiko mpe bólɛmbisa mabɔkɔ te, mpamba te mosala na bino ezali na mbano.”​—2 Ntango 15:7.