Lakisá makambo oyo ezali na kati

SINGAPOUR

Bakangami mpo na kondima na bango

Bakangami mpo na kondima na bango

Mibeko ya guvɛrnema ya Singapour esɛngaka moto nyonso asala mosala ya soda mpe eyebi te lotomo ya baoyo baboyaka mosala yango mpo na kotosa lisosoli. Bilenge Batatoli ya Yehova oyo bazali koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli basengeli kosala mbula mibale mobimba na bolɔkɔ, to sanza 39 ya bolɔkɔ.

Soki elenge mobali akokisi mbula 18, mibeko ya mboka esɛngi ye akɔta mosala ya soda. Soki aboyi mpo na kotosa lisosoli na ye, bakokanga ye na kaa ya basoda na boumeli ya sanza 15. Soki babimisi ye asengeli mbala moko kolata iniforme ya basoda mpe kozwa formasyo ya mosala yango. Soki aboyi lisusu formasyo yango, bakosambisa ye lisusu na tribinale ya basoda mpe bakokatela ye etumbu ya bolɔkɔ oyo ekoki koumela sanza tii 24.

Singapour eboyi kotosa malako ya ONU

Banda kala, ONU esɛngaka bikólo na yango “endima ete koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli ezali lotomo oyo moto azali na yango ya kosalela bonsomi na ye ya kokanisa, ya lisosoli mpe ya losambo ndenge ESAKOLA ya ONU mpo na ntomo ya moto (Déclaration universelle des droits de l’homme) elobi.” Atako Singapour ekɔtá na bikólo ya ONU banda 1965, elobá ete endimaka te ekateli ya ONU mpo na likambo wana. Na mokanda moko oyo mokonzi moko ya guvɛrnema ya Singapour atindelaki ONU na mokolo ya 24/04/2002, alobaki ete “soki mateya oyo moto andimaka to makambo oyo asalaka eyokani te na matomba ya ekólo, lotomo oyo ekólo ezali na yango ya kobatela kimya na mboka esengeli naino kotosama.” Alobaki polele boye: “Tondimaka te kosalela mobeko yango na likambo etali koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli.”

Badati

  1. 07/05/2019

    Batatoli ya Yehova 8 bakɔti bolɔkɔ mpo baboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli.

  2. 24/04/2002

    Mokonzi moko ya guvɛrnema aboyi kondima lotomo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli.

  3. Sanza ya 02/1995

    Bakómi konyokola Batatoli ya Yehova makasi na Singapour mpe kokanga bango.

  4. 08/08/1994

    Tribinale monene ya Singapour eboyi Batatoli ya Yehova básamba lisusu.

  5. 12/01/1972

    Guvɛrnema ya Singapour elongoli nkombo ya lingomba ya Batatoli ya Yehova na buku ya Leta.