Lakisá makambo oyo ezali na kati

15/08/2019
ÉTATS-UNIS

Phoenix, États-Unis​—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!

Phoenix, États-Unis​—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!
  • Dati: 09-11/08/2019

  • Esika: Chase Field na Phoenix, na Arizona, États-Unis

  • Programɛ esalemaki na monɔkɔ oyo: Anglais

  • Motángo eleki monene: 40 237

  • Bato oyo bazwaki batisimo: 352

  • Bandeko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge: 5 000

  • Bafiliale oyo ebengisamaki: Australasie, Grande-Bretagne, Canada, Europe Centrale, Chili, France, Grèce, Inde, Italie, Corée, Micronésie, Scandinavie, Sri Lanka, Tahiti, Thaïlande, Trinité-et-Tobago, Turquie

  • Likambo ya malamu oyo ebendaki likebi ya bato: Steve Moore, prezida ya kompanyi babengi Visit Phoenix, oyo esalisaka mpo na kozwa bisika ya mayangani, baotɛlɛ mpe kobongisa makambo mosusu na lopango ya Phoenix, alobaki boye: “[Liyangani oyo] ezali liyangani moko oyo ebongisami malamu mpenza mpe nayoká naino te esengo oyo nayokaki ya kosala elongo na bato lokola bino. Mpe likambo ya kokamwa, bolakaki ete bokotika stade pɛto liboso bókende. Likambo ya boye esalemá naino te.”

 

Bazali koyamba bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge ntango bakómi na lipándá ya mpɛpɔ ya Sky Harbor International na Phoenix

Bandeko basi mpe mibali na Phoenix batɛlɛmi mpo na koyamba bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge na moko ya baotɛlɛ

Ebele ya bandeko basi mpe mibali bazali kopesa mbote na bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge na esengo nyonso ntango bakómi na Chase Field na mokolo ya mitano na ntɔngɔ

Basusu kati ya bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge balati bilamba ya mboka na bango bazali kolanda programɛ

Bandeko mibale kati ya bandeko ya sika 352 bazali kozwa batisimo

Ndeko Samuel Herd, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi azali kosala diskur ya nsuka ya mokolo ya mibale ya liyangani

Bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge bazali kozwa fɔtɔ ntango bazali kosala vizite na parkɛ

Bandeko na biso bamati likoló ya mpunda oyo ezali kobenda mokumba, ezali eteni ya istware ya engumba yango kobanda siɛklɛ ya 19 na Wɛsti ya Amerika

Bandeko oyo bamipesá kaka na mosala ya ntango nyonso oyo bayaki na liyangani bazali kotambola na nsuka ya programɛ ya liyangani na mokolo ya lomingo