Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bibundeli ya basoda: Anton Petrus/Moment via Getty Images; mbongo: Wara1982/iStock via Getty Images Plus

BÓSƐNZƐLAKA!

Bankóto ya bamiliare ekei mpo na bitumba​—Bongo bomoi ya bato?

Bankóto ya bamiliare ekei mpo na bitumba​—Bongo bomoi ya bato?

 Bitumba ezali kolya mbongo mingi mpe kobimisa makama ya nsɔmɔ mpenza.

  •   “Mbongo oyo ebimi mpo na bitumba ndenge na ndenge na mokili ekómi tii bankóto ya bamiliare ya badolare. (2,2 billions de dollars)”​—The Washington Post, 13/02/2024.

 Ntalo na yango esuki kaka na mbongo te. Na ndakisa, tólobela mwa moke etumba ya Ukraine.

  •   Basoda. Banda etumba yango ebandaki, eleki sikoyo mbula mibale, balapolo mosusu emonisi ete basoda pene na 500 000 bakufi to bazoki.

  •   Bana-mboka. Na kotalela lapolo ya ONU, bato koleka 28 000 bakufi to bazwi makama ndenge na ndenge. Nzokande, moko ya bakonzi ya ONU alobaki: “Tokoki te koyeba ndenge oyo bitumba yango ezali mpenza kobebisa bomoi ya bato.” a

 Bato bazali koyokwama mingi mpenza mpo na bitumba na mokili mobimba.

  •   114 milio: Motángo ya bato oyo bakimi bisika na bango mpo na bitumba mpe mobulu, kobanda na sanza ya 09/2023.

  •   783 milio: Motángo ya bato oyo bazali kokufa nzala makasi. “Bitumba ezali eloko ya liboso oyo ememaka nzala na mokili, 70% ya bato oyo bakufaka nzala makasi bafandaka bisika bitumba mpe mobulu ezali.”​—Programme alimentaire mondiale.

 Bitumba ekosila mokolo mosusu? Kimya ekozala mokolo mosusu na mabele? Mokolo mosusu bato bakosalela bozwi ya mabele mpo na kosilisa nzala mpe bobola? Biblia elobi nini?

Ntango ya bitumba

 Biblia esaleli elilingi ya moto azali kotambwisa mpunda, mpo na komonisa ndenge bitumba ekopalangana na mokili mobimba.

  •   “Mosusu ebimaki, mpunda moko ya langi ya motane ngwaa; mpe bapesaki moto oyo afandi likoló na yango nzela ya kolongola kimya na mabele mpo bato bábomana, mpe bapesaki ye mopanga moko monene.”​—Emoniseli 6:4.

 Batambwisi-mpunda mosusu mibale ya elilingi bazali kolanda oyo ya liboso mpe bazali komonisa nzala makasi mpe liwa oyo ezali kouta na makama mpe makambo mosusu ya mabe. (Emoniseli 6:5-8) Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali esakweli yango mpe ntina oyo tokoki kondima ete ezali kokokisama na ntango na biso, tángá lisolo “Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?

Kimya mpo na mikolo ezali koya

 Mosika te, bato bakosalela lisusu te bozwi ya mabele mpo na kobimisa bitumba. Kasi yango ekouta na makasi ya bato te. Biblia elobi:

  •   Nzambe ‘akosilisa bitumba na mabele mobimba.’​—Nzembo 46:9.

  •   Nzambe akosilisa makambo nyonso ya mabe oyo bitumba ebimisa. “Akopangwisa mai ya miso nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, matánga te, koganga te, mpasi mpe ekozala lisusu te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:4.

  •   Nzambe akosala ete bato nyonso bázala na kimya ya seko. “Bato na ngai bakofanda mpenza na esika ya kimya, na bisika oyo ebatelami malamu mpe na bisika ya kopema oyo ezangi mitungisi.”​—Yisaya 32:18.

 Na kotalela bisakweli ya Biblia, bitumba mpe makambo mosusu ya nsɔmɔ oyo tozali komona lelo oyo emonisi ete ntango yango ya kimya ezali lisusu mosika te.

 Ndenge nini Nzambe akotya kimya yango na mokili? Akosalela Bokonzi na ye, to guvernɛma ya likoló. (Matai 6:10) Mpo na koyeba soki Bokonzi yango ezali nini mpe ekomemela yo matomba nini, talá vdeo ya mokuse Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

a Miroslav Jenca, Sous-secrétaire général des Nations Unies pour l’Europe, 06/12/2023.