Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 15

Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!

Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!

(Baebre 1:6)

  1. 1. Tókumisa Mwana,

    Mokonzi Nzamb’aponi.

    Bokonzi na ye sembo;

    Mpe mapamboli beboo.

    Atɛlɛmi na nkembo

    Kobundela Nzambe,

    Alobi Yah abongi

    Kozala Mokonzi.

    (MONDIMO)

    Tókumisa Mwana!

    Mokonzi Nzamb’aponi.

    Lelo na Ngomba Siona,

    Azali koyangela!

  2. 2. Tókumisa Mwana,

    Akufelaki biso.

    Asikolaki biso;

    Nzamb’alimbisi biso.

    Mwasi ya Kristo’az’oya,

    Na bilamb’a mpɛmbɛ.

    Bakosukisa ntembe

    Ya bangun’a Nzambe.

    (MONDIMO)

    Tókumisa Mwana!

    Mokonzi Nzamb’aponi.

    Lelo na Ngomba Siona,

    Azali koyangela!