Moize ná Arona bamonisi mpiko mpenza
Moize ná Arona bamonisaki mpiko mpenza ntango bazalaki kosolola na Farao, moto oyo alekaki na nguya mingi na mokili na ntango wana. Nini esalisaki bango bázala na mpiko mpenza? Biblia elobi boye mpo na Moize: “Na kondima alongwaki na Ezipito, kasi abangaki nkanda ya mokonzi te, mpo atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Ebr 11:27) Moize ná Arona bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova mpe batyelaki ye motema.
Makambo nini esɛngaka kozala na mpiko mpo na kolobela bindimeli na yo epai ya moto oyo azali na bokonzi?