Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokonzi Salomo azali kotala ndenge mosala ya kotonga tempelo ezali kokende liboso

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Batongaki mpenza na motema mobimba

Batongaki mpenza na motema mobimba

Salomo asalelaki bisaleli ya malamu mpenza mpo na kotonga tempelo (1Ba 5:6, 17; w11 1/2 lok. 15)

Bato mingi bapesaki mabɔkɔ na mosala (1Ba 5:13-16; it-1-F lok. 411 par. 1; it-2-F lok. 1047 par. 4)

Salomo mpe bato ya ekólo basalaki mosala makasi mbula nsambo mpo na kosilisa kotonga tempelo (1Ba 6:38; talá elilingi ya ezipeli)

Salomo mpe bato ya ekólo batongaki tempelo ya kitoko mpo na lokumu ya Yehova. Basalaki bongo mpo bazalaki kolinga Yehova mingi. Likambo ya mawa, mabota oyo elandaki ezalaki lisusu kosambela Yehova na esengo te. Bazalaki lisusu kobongisa tempelo te. Mpe nsukansuka, tempelo ebebisamaki.

OMITUNA BOYE: ‘Makambo nini nasalaka mpo na kobatela esengo na ngai mpo na losambo ya Yehova?’