Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

2-8/05

YOBO 38-42

2-8/05
  • Loyembo 63 mpe libondeli

  • Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

  • Kobondela mpo na basusu esepelisaka Yehova”: (Min. 10)

    • Yb 42:7, 8—Yehova alingaki ete Yobo abondela mpo na Elifaze, Biledade, ná Zofare (w13 15/6 21 par. 17; w98 1/5 30 par. 3-6)

    • Yb 42:10—Ntango Yobo abondelaki mpo na bango, Yehova abikisaki ye na maladi (w98 1/5 31 par. 3)

    • Yb 42:10-17—Yehova apambolaki Yobo mingi mpo azalaki na kondima mpe ayikaki mpiko (w94 15/11 20 par. 19-20)

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)

    • Yb 38:4-7—“Minzoto ya ntɔngɔ” ezali banani mpe makambo nini toyebi mpo na bango? (bh 97 par. 3, w06 15/1 3 par. 2)

    • Yb 42:3-5—Tokoki kosala nini mpo tómona Nzambe na ndenge oyo Yobo amonaki ye? (w15 15/10 7, 8 par. 16-17)

    • Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi ngai nini mpo na Yehova?

    • Makanisi nini ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo nakoki kosalela na mosala ya kosakola?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Yb 41:1-26

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Yekolá ndenge ya kokabola mikanda na sanza oyo: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video mokomoko oyo emonisi ndenge ya kokabola mikanda, na nsima bólobela makanisi ya ntina. Lobelá na mokuse lisolo “Ndenge ya kosalela JW Libraryntango bokolobela ndenge ya kosalela telefone to tablɛti. Yebisá bayangani bábosanaka te kokoma na lapolo na bango ya sanza mbala boni balakisi video na mosala ya kosakola. Lendisá basakoli bákoma makanisi na bango moko mpo na kokabola mikanda.

BOMOI YA BAKRISTO