Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Thomas Emlyn​—Afingaki Nzambe to alongisaki nde mateya ya solo?

Thomas Emlyn​—Afingaki Nzambe to alongisaki nde mateya ya solo?

THOMAS EMLYN azalaki nani mpe nini etindaki ye akɔtela mateya ya solo? Makambo nini tokoki koyekola epai na ye oyo ekoki kosalisa biso lelo?

Mpo na koyanola na mituna yango, tózonga naino na nsuka ya siɛklɛ ya 17 mpe ebandeli ya siɛklɛ ya 18 na Angleterre mpe Irlande. Na ntango wana Lingomba ya Angleterre ezalaki na bokonzi makasi. Bituluku ndenge na ndenge ya baprotesta mpe bato mosusu bazalaki kotɛmɛla mateya mpe makambo ya lingomba.

AZALAKI NANI?

Ezalaki na ntango yango nde Thomas Emlyn abotamaki na mokolo ya 27/05/1663 na Stamford, Lincolnshire na Angleterre. Ntango akómaki na mbula 19, ateyaki mpo na mbala ya liboso na eglize mpe na nsima akómaki sango ya mwasi moko ya lokumu oyo azalaki kofanda na Londres; mpe na nsima akendaki kofanda na Belfast, na Irlande.

Nsukansuka na Belfast, akómaki kosala na parwasi ya lingomba. Wana mikolo ezalaki koleka, asalaki na bisika mingi, ata mpe na Dublin.

MPO NA NINI BAFUNDAKI YE ETE AFINGI NZAMBE?

Na boumeli ya ntango wana nyonso, Emlyn azalaki koyekola Biblia na likebi mpenza. Boyekoli na ye esalaki ete atyela liteya ya bosato ntembe, atako liboso azalaki kondima yango. Ntango azalaki kosala bolukiluki na baevanzile, andimisamaki ete makambo oyo yango elobeli eyokani na boyebi ya sika oyo akómaki na yango.

Emlyn abombaki naino makambo oyo ayekolaki. Kasi, bato mosusu na eglize na ye na Dublin bamonaki ete azalaki kolobela lisusu te liteya ya bosato na mateya na ye. Lokola ayebaki ete bato mosusu bakondima te makambo ya sika oyo amonaki, yango wana akomaki boye: “Nazali na elikya te ete nakokoba na mosala oyo nazali kosala awa soki namonisi makanisi na ngai.” Na sanza ya 06/1702, bato mibale oyo azalaki kosala na bango baswanisaki ye mpo azalaki kolobela lisusu bosato te na mateya na ye. Emlyn ayebisaki bango polele ete azalaki lisusu kondima liteya yango te mpe asɛngaki bango ete atika mosala yango.

Buku oyo Emlyn abimisaki oyo ezalaki na bavɛrsɛ oyo emonisaki ntina oyo Yesu azali te Nzambe oyo aleki banzambe nyonso

Nsima ya mwa mikolo, alongwaki na Dublin na Irlande mpe akendaki na Angleterre. Kasi nsima ya pɔsɔ 10 azongaki na Dublin mpo na kobongisa mwa makambo, mpo na nsima akende kofanda na Londres mpo na libela. Ntango azalaki na Dublin, abimisaki buku moko (Humble Inquiry Into the Scripture-Account of Jesus Christ) mpo na kolongisa makanisi na ye. Na buku yango, apesaki bavɛrsɛ ya polele oyo emonisaki ete Yesu azali te Nzambe oyo aleki banzambe nyonso. Yango esilikisaki bato ya parwasi na ye ya kala ya Dublin. Bafundaki likambo yango na tribinale.

Bakangaki Emlyn mpe bamemaki ye na tribinale moko na Dublin na mokolo ya 14/06/1703. Na buku na ye (True Narrative of the Proceedings), Emlyn alobaki ete bafundaki ye “mpo akomaki mpe abimisaki buku moko oyo mpo na yango balobaki ete afingaki Nzambe mpe alobaki na ndenge ya mabe ete Yesu Kristo azali ndenge moko te na Nzambe Tata.” Basambisaki ye na bosembo te. Baepiskɔpɔ nsambo ya eglize ya Irlande bafandaki na banc moko na bazuzi. Batikelaki ye ntango ya kosamba te. Richard Levins, avoka moko ya lokumu, ayebisaki Emlyn ete bakokanga ye “ndenge bakangaka mbwa ya zamba na bokila.” Na nsuka, Richard Pyne, mokonzi ya tribinale ya Irlande, ayebisaki bato oyo bazalaki kosambisa likambo yango ete soki basambisi yango te ndenge bango balingi, “Baepiskopo, bankolo na ye bazali wana,” mbala mosusu mpo na komonisa ete bazuzi yango bakozwa etumbu makasi.

“Nazali konyokwama mpo na oyo nayebi ete ezali solo mpe nkembo ya Nzambe.”​—Thomas Emlyn

Ntango bamonaki ete azalaki na libunga, prokirɛrɛ ya tribinale yango ayebisaki ye atika likambo yango. Emlyn aboyaki. Bakatelaki ye amande mpe etumbu ya mbula moko na bolɔkɔ. Lokola akokaki kofuta amande yango te, atikalaki na bolɔkɔ mbula mibale tii ntango moninga na ye moko asɛngaki bakonzi bákitisa amande yango. Babimisaki Emlyn na bolɔkɔ mokolo ya 21/07/1705. Nsɔni oyo bayokisaki ye etindaki ye aloba maloba oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo ete: “Nazali konyokwama mpo na oyo nayebi ete ezali solo mpe nkembo ya Nzambe.”

Emlyn akendaki kofanda na Londres, epai akómaki kosala na William Whiston moto mosusu ya mayele na makambo ya Biblia oyo bayinaki ye mpo abimisaki oyo amonaki ete ezali solo ya Biblia. Whiston azalaki na limemya mpo na Emlyn, azalaki kobenga ye “‘moto ya libosoliboso oyo amonisaki ete azali mokristo, oyo alandaki mpenza mateya ya ebandeli ya bokristo.’”

MPO NA NINI ABOYAKI LITEYA YA BOSATO?

Ndenge moko na William Whiston mpe Isaac Newton moto mosusu ya mayele oyo bamemyaka mingi, Emlyn amonaki ete Biblia endimaka te liteya ya bosato ndenge liteya ya Athanase emonisaka yango. Alobaki boye: “Nsima ya kokanisa mpenza na mozindo mpe koyekola Makomami Mosantu, . . . namonaki ete ezali malamu nabongola makanisi na ngai mpo na liteya ya bosato.” Asukisaki na koloba ete “Nzambe mpe Tata ya Yesu Kristo ye moko nde aleki banzambe nyonso.”

Nini etindaki Emlyn aloba bongo? Amonaki bavɛrsɛ mingi oyo ekesenisi Yesu ná Tata na ye. Tótala mwa bandakisa (maloba oyo etɛngami mwa moke ezali bakomantɛrɛ ya Emlyn mpo na bavɛrsɛ yango):

  •  Yoane 17:3: “Vɛrsɛ yango elobi te ete Kristo azali Nzambe wana kaka moko to Nzambe, lokola nde Nzambe mosusu azali te.” Kaka Tata nde abengami “Nzambe ya solo kaka moko.”

  •  Yoane 5:30: “Mwana asalaka mokano na ye moko te, kasi mokano ya Tata.”

  •  Yoane 5:26: “Tata nde apesá ye bomoi.”

  •  Baefese 1:3: “Mbala mingi Biblia ebengaka Yesu Kristo Mwana ya Nzambe, kasi ata na esika moko te babengi Tata ete Tata ya Nzambe, atako mbala mingi abengamaka Tata ya Nkolo na biso Yesu.”

Nsima ya kotalela makambo wana nyonso, Emlyn alobaki na mpiko nyonso ete: “Ezali ata na vɛrsɛ moko te ya Makomami Mosantu, oyo emonisi ndenge bato mingi balobaka ete Tata, Mwana mpe Elimo Santu bazali kaka moto moko.”

LITEYA NINI TOKOKI KOZWA?

Bato mingi lelo babangaka kolongisa makambo oyo Biblia eteyaka. Kasi Emlyn andimaki kolongisa solo ya Biblia. Atunaki motuna oyo: “Soki moto azali kokoka te kolobela mateya ya solo ya ntina mingi, oyo amoni ete ezali polele na kati ya Makomami Mosantu, mpo na nini asengeli kotánga mpe kosala bolukiluki mpo na yango?” Emlyn aboyaki kokakola solo.

Ndakisa oyo Emlyn mpe bato mosusu batiká ekoki kotinda biso tótalela soki tokondima kolongisa solo ntango bato bazali kotyola mateya oyo tondimaka. Tosengeli mpe komituna boye, ‘Nini ezali na ntina mingi​—lokumu to mapamboli oyo bato bakoki kopesa biso to nde kolongisa solo ya Liloba ya Nzambe?’