Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MATEYA YA LOKUTA OYO ETINDAKA BATO BÁLINGA NZAMBE TE

Solo ekoki kopesa yo bonsomi

Solo ekoki kopesa yo bonsomi

Mokolo moko na Yerusaleme, Yesu azalaki kolobela makambo ya Tata na ye Yehova mpe komonisa polele mateya ya lokuta ya bakonzi ya mangomba ya ntango na ye. (Yoane 8:12-30) Makambo oyo alobaki mokolo wana eteyi biso ndenge ya kotalela mateya ya Nzambe oyo bato mingi bandimaka. Yesu alobaki boye: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:31, 32.

Soki “botikali na kati ya liloba na ngai.” Na maloba wana, Yesu amonisaki likambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba soki mateya ya mangomba ezali “solo” to te. Ntango oyoki liteya moko na ntina na Nzambe, omituna boye: ‘Yango eyokani na maloba ya Yesu mpe na makambo mosusu oyo Makomami mosantu elobi?’ Landá ndakisa ya baoyo bazalaki koyoka mateya ya ntoma Paulo mpe bazalaki “kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango [makambo oyo bazalaki koyekola] ezali bongo.”​—Misala 17:11.

Ntango Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola na bango Biblia, Marco, Rosa, mpe Raymonde, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli batalelaki malamumalamu mateya ya mangomba na bango. Balobi nini?

Marco: “Ndeko oyo azalaki koteya biso Biblia azalaki kosalela Makomami mpo na koyanola na mituna nyonso oyo ngai ná mwasi na ngai tozalaki na yango. Bolingo na biso mpo na Yehova ekómaki makasi, mpe ngai ná mwasi na ngai tokómaki kolingana makasi!”

Rosa: “Liboso, nazalaki kokanisa ete Biblia ezali kaka mwa buku moko ya filozofi oyo esalelaka makanisi ya bato mpo na kolimbola soki Nzambe azalaka ndenge nini. Mokemoke, nazwaki biyano ya Biblia na mituna na ngai. Sikoyo, namonaka ete Yehova azali mpenza. Nakoki mpenza kotyela ye motema.”

Raymonde: “Nabondelaki Nzambe asalisa ngai nayeba ye. Eumelaki te, ngai ná mobali na ngai tobandaki koyekola Biblia. Nsukansuka, toyebaki solo na ntina na Yehova! Totondaki mpenza na esengo ntango toyebaki bizaleli na ye ya malamu.”

Biblia emonisi biso polele mateya ya lokuta oyo bato balobaka mpo na Nzambe, mpe eteyi biso bizaleli na ye ya kitoko. Ezali Liloba na ye, mpe esalisaka biso “tóyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto.” (1 Bakorinti 2:12) Mpo na nini te otala yo moko ndenge Biblia epesi biyano na mituna ya ntina mingi oyo bato mingi bamitunaka mpo na Nzambe, mokano na ye mpe avenire na biso? Tángá biyano na mituna yango mosusu na www.jw.org na esika bakomi: “Mateya ya Biblia > Biyano na mituna ya Biblia.” Okoki mpe kokomela biso na site oyo to kosɛnga Motatoli ya Yehova moko ayekola na yo Biblia. Tozali na elikya ete soki osali bongo, okomona ete ezali mpenza mpasi te mpo oyeba Nzambe mpe okóma kolinga ye.