Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Goge ya Magoge oyo mokanda ya Ezekiele elobeli ezali nani?

Na boumeli ya mbula mingi, mikanda na biso ezalaki kolimbola ete maloba Goge ya Magoge ezali Satana nsima ya kobwakama na ye kuna na likoló. Mpo na nini? Mpo mokanda ya Emoniseli elobelaka Satana lokola mokonzi ya etumba ya mokili mobimba oyo ekobundisa basaleli ya Nzambe. (Emoniseli 12:1-17) Na yango, tozalaki kokanisa ete Goge ezalaki nkombo mosusu ya Satana.

Nzokande, ndimbola yango ezalaki na makambo mosusu oyo ezalaki polele te. Tókanisa naino na likambo oyo: Ntango alobelaki kobomama ya Goge, Yehova alobaki ete akopesa Goge lokola “bilei mpo na bandɛkɛ oyo ekangaka banyama, bandɛkɛ ya mapapu ya ndenge nyonso, mpe banyama ya zamba oyo efandaka na esobe.” (Ezekiele 39:4) Na nsima, Yehova abakisaki ete: “Na mokolo yango, nakopesa Goge esika kuna, lilita na Yisraele.” (Ezekiele 39:11) Kasi, ndenge nini Satana, oyo azali ekelamu ya elimo akoki kolyama na bandɛkɛ mpe banyama ya zamba oyo efandaka na esobe? Ndenge nini akoki kokundama na mabele? Biblia emonisi polele ete Satana akobwakama na libulu mozindo na boumeli ya mbula 1000. Akolyama te to akokundama te.​—Emoniseli 20:1, 2.

Biblia elobi ete na nsuka ya mbula 1 000, Satana akobimisama na libulu mozindo, mpe “akobima mpo na kokosa bikólo wana oyo ezali na nsuka minei ya mabele, Goge ná Magoge, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba.” (Emoniseli 20:8) Kasi soki Satana azali Goge, yango elingi koloba ete Satana akomikosa. Na yango, “Goge” oyo mokanda ya Ezekiele to Emoniseli elobeli, ezali Satana te.

Kasi Goge ya Magoge ezali nani? Mpo na kozwa eyano, tosengeli koluka na Biblia mpo na koyeba nani akobundisa basaleli ya Nzambe. Biblia elobelaka etumba ya ‘Goge ya Magoge,’ etumba ya “mokonzi ya nɔrdi,” mpe etumba ya “bakonzi ya mabele.” (Ezekiele 38:2, 10-13; Danyele 11:40, 44, 45; Emoniseli 17:14; 19:19) Bitumba oyo nyonso ezali ndenge moko? Ezali mpenza ndenge moko. Emonani lokola ete Biblia esaleli bankombo ekeseni mpo na kolobela kaka etumba moko wana. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te Biblia eyebisi ete bikólo nyonso ya mabele ekozala na kati ya etumba wana ya nsuka oyo ekobandisa etumba ya Armagedone.​—Emoniseli 16:14, 16.

Soki totaleli mikapo nyonso oyo elobeli etumba wana ya nsuka oyo bakobundisa basaleli ya Nzambe, emonani polele ete nkombo Goge ya Magoge ezali Satana te. Yango emonisi ete Goge ya Magoge ezali etuluku ya bikólo. “Mokonzi ya nɔrdi” nde akokamba etuluku yango? Tokoki koloba yango na bosikisiki te. Kasi emonani lokola ete ndimbola yango eyokani na oyo Yehova alobi mpo na Goge ete: “Okouta mpenza na esika na yo, na nsukansuka ya nɔrdi, yo mpe bato ya bikólo ebele elongo na yo, bango nyonso bamati na bampunda, lisangá moko monene, ɛɛ, limpinga moko monene ya basoda.”​—Ezekiele 38:6, 15.

Ndenge moko, mosakoli Danyele, oyo azalaki na bomoi na eleko ya Ezekiele, alobi na ntina na mokonzi ya nɔrdi boye: “Bansango oyo euti epai moi ebimaka mpe na nɔrdi ekobulunganisa ye, mpe akobima mpenza na nkanda makasi mpo na kosilisa nyɛɛ mpe kobebisa bato ebele. Mpe akopika bahema na ye oyo ezali lokola bandako minene kati na mbu monene mpe ngomba mosantu ya Kitoko; mpe akoya tii na nsuka na ye, mpe akozala na mosungi te.” (Danyele 11:44, 45) Likambo yango eyokani mpenza na oyo mokanda ya Ezekiele elobi ete Goge akosala.​—Ezekiele 38:8-12, 16.

Nini ekosalema nsima ya etumba ya nsuka? Danyele ayebisi biso ete: “Mpe na ntango yango Mikaele [Yesu Kristo] akotɛlɛma [na Armagedone], ye nkumu monene oyo azali kotɛlɛma [kobanda 1914] mpo na bolamu ya bato ya ekólo na yo. Mpe ntango moko ya mpasi [bolɔzi monene] ekozala mpenza na ndenge oyo esalemá naino te banda ekólo esalemá kino ntango wana. Mpe na ntango yango bato ya ekólo na yo bakobika, moto nyonso oyo bakomona ete akomami na buku.” (Danyele 12:1) Tozali kotánga likambo ya ndenge wana oyo elobeli likambo oyo Yesu akosala na mokanda ya Emoniseli 19:11-21.

Kasi “Goge Magoge” oyo mokanda ya Emoniseli 20:8 elobeli ezali nani? Maloba yango elimboli bato nyonso oyo bakotombokela Yehova mpe bakobundisa basaleli na ye na boumeli ya komekama ya nsuka oyo ekosalema na nsuka ya mbula 1000. Bakoyina basaleli ya Nzambe ndenge kaka Goge ya Magoge, elingi koloba bikólo oyo ekobundisa basaleli ya Nzambe na nsuka ya bolɔzi monene. Mpe ndenge kaka bikólo yango ekobomama na Armagedone, Goge ná Magoge mpe akobomama. (Emoniseli 19:20, 21; 20:9) Na yango, emonani lokola ete baoyo nyonso bakotomboka na nsuka ya mbula 1 000 bábengama “Goge ná Magoge.”

Lokola tozali bayekoli ya molende ya Biblia, tozali na mposa makasi ya koyeba nani akokóma “mokonzi ya nɔrdi” na mikolo ezali koya, oyo ezali lisusu mosika te. Kasi ezala nani to nani akokamba bikólo mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe, tondimisami na makambo mibale oyo: (1) Goge ya Magoge mpe mampinga na ye bakolonga te mpe bakobomama. (2) Mokonzi na biso, Yesu Kristo, akobikisa basaleli ya Nzambe mpe akomema bango na mokili ya sika ya kimya, epai libateli ya solosolo ekozala.​—Emoniseli 7:14-17.