LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Février 2015

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli kobanda 6/04 tii na 3/05/2015.

Mekolá komikitisa mpe boboto ya Yesu

1 Petro 2:21 ezali kolendisa biso tólanda malamumalamu matambe ya Yesu. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, ndenge nini tokoki komekola komikitisa mpe boboto ya Yesu?

Mekolá mpiko mpe bososoli ya Yesu

Na nzela ya makambo oyo ezali na Biblia, toyebi ndenge Yesu azali. Talá ndenge okoki kolanda matambe ya na ye malamumalamu, mpe omekola mpiko mpe bososoli na ye.

Bikólo ebongisamaki mpo na “mateya ya Yehova”

Nini esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso básakola nsango malamu na ndenge esengeli? Nini esalaki ete mosala ya kosakola ezala pɛpɛlɛ na siɛklɛ ya liboso koleka bileko mosusu?

Yehova azali kotambwisa mosala na biso ya koteya na mokili mobimba

Makambo nini oyo euti kosalema oyo esalisi basaleli ya Yehova básakola nsango malamu na ndenge ebongi na mabele mobimba?

Likabo moko kitoko mpo na bandeko ya Japon

Buku ya sika oyo ezali na motó ya likambo “Biblia​—Evanzile ya Matai” ebimisamaki na Japon. Makambo nini ezali na buku yango? Ebongisamaki mpo na nini?

Monisáká molende na mosala ya kosakola

Toyebi ete kosakola nsango malamu ezali mosala eleki ntina oyo tokoki kosala lelo oyo. Tokoki kokoba komonisa ata mpe kobakisa molende na biso na mosala ya kosakola?