LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Août 2014

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli kobanda 29/09 tii na 26/10/2014.

Ozwaka ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi?’

Mpo moto azala makasi na elimo, esengeli kaka azwa mikanda nyonso oyo moombo ya sembo abimisaka?

Mokumba nini basi bazali na yango na mokano ya Yehova?

Luká koyeba makambo oyo botomboki ememelá mibali mpe basi. Talá masolo ya basi mosusu ya sembo ya ntango ya kala. Lisusu, luká koyeba ndenge basi bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya Nzambe lelo oyo.

Salelá Liloba ya Nzambe mpo ezali na bomoi!

Batatoli ya Yehova nyonso balingaka kosakola malamu. Talá malako mosusu na likambo etali ndenge ya kosalela ya Liloba ya Nzambe oyo ezali na nguya mpe batrakte mpo na kosolola na bato.

Ndenge Yehova apusanaka penepene na biso

Tosengeli kozala na boyokani malamu mpenza elongo na Yehova. Luká koyeba ndenge lisiko mpe Biblia emonisi ete Yehova asalisaka biso tópusana penepene na ye.

Yokáká mongongo ya Yehova esika nyonso oyo ozali

Luká matomba oyo tokozwa soki tozali koyoka mongongo ya Yehova mpe tozali kosolola ná ye. Lisolo oyo ekosalisa biso tóyeba ndenge tokoki kosala ete tópesa nzela te na Satana mpe bamposa na biso ya kosala masumu epekisa biso koyoka Yehova.

‘Zongá mpe lendisá bandeko na yo’

Soki ndeko moko azalaki liboso nkulutu, kasi azali lisusu te na mokumba yango, akoki lisusu “koluka kosala mosala ya mokɛngɛli”?

Mituna ya batángi

Ntango Yesu alobaki ete bato oyo bakosekwa, “bakobala te mpe bakobalisama te,” azalaki nde kolobela lisekwa oyo ekosalema awa na mabele?

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

“Drame Eureka” esalisaki bato mingi mpo báyeba solo ya Biblia

Bazalaki kolakisa mwa ‘Fɔtɔ-Drame wana ya bozalisi’ ata na bamboka ya mosika mpenza, ezala bisika oyo lotiliki ezalaki te.