LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mars 2014

Na nimero oyo, luká koyeba ndenge okoki kokóma na ezaleli ya komipimela mpe komitalela na lolenge ya malamu. Ndenge nini tokoki kosunga bandeko na biso Batatoli ya Yehova mpe bato ya libota oyo bakómi mibange?

Ndenge ya kosimba mitema ya bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te

Lolenge oyo Yesu asalaki epai ya bato ya libota na ye ekoki koteya biso nini? Ndenge nini tokoki kosimba motema ya bandeko na biso ya libota oyo bazali na lingomba mosusu to oyo basambelaka te?

Ndenge ya kokoba komonisa ezaleli ya komipimela

Tozali na monguna moko oyo alukaka na mayele mabe kobebisa ezaleli na biso ya komipimela. Lisolo oyo emonisi polele monguna yango mpe elobeli ndenge tokoki kosalela Biblia mpo na kolonga monguna yango.

Ndenge ya kobatela makanisi malamu

Mpo na nini bato mingi bazali kobunda na makanisi mabe? Lisolo oyo emonisi biso ndenge oyo tokoki kosalela Biblia mpo na kobatela makanisi malamu.

Ndenge nini okoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisaka?

Talá ndenge oyo losambo na kati ya libota esalemaka na bikólo ndenge na ndenge mpo esalisa yo oyeba nini okoki mpe kosala.

Pesáká mibange lokumu

Talá ndenge Nzambe atalelaka mibange. Mikumba bana oyo bakómi mikóló bazali na yango mpo na baboti na bango oyo bakómi mibange? Ndenge nini masangá ekoki kopesa mibange lokumu?

Ndenge ya kosunga mibange

Baboti oyo bakómi mibange ná bana oyo bakómi mikóló bakoki kosolola mpo na komibongisa mpe kozwa bikateli liboso ete “mikolo ya mpasi eya.” Ndenge nini bakoki kolonga mikakatano mosusu?

Maloba na yo ‘ezala te Ɛɛ nzokande Te’

Bakristo basengeli kokokisaka maloba na bango mpe basengeli soki moke te koloba ‘ɛɛ nzokande te.’ Tokosalá nini soki tolingi kobongola programɛ moko boye? Zwá liteya na ndakisa ya ntoma ntoma Paulo.