Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandako ya Bokonzi efungwami mpo na bato nyonso

Bandako ya Bokonzi efungwami mpo na bato nyonso

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Bandako ya Bokonzi efungwami mpo na bato nyonso

NTANGO Yesu azalaki kobongisa bayekoli na ye mpo na mosala ya kosakola, alendisaki bango ete ‘básakola yango na likoló ya ndako.’ (Matai 10:27) Ɛɛ, basengelaki kosakola na kobombama te, na miso ya bato nyonso. Na kotalela toli oyo, mosala ya Batatoli ya Yehova ezali mpe kosalema na kobombama te. Yango esalisi bango ete bálonga botɛmɛli mpe bázala na lokumu mpenza.

Atako Batatoli ya Yehova babengaka moto nyonso oyo asepeli kokende na makita na bango, makanisi mabe oyo bato mosusu bazalaka na yango mpo na bango epekisaka bango kokende na Bandako ya Bokonzi. Likambo yango emonanaki na ekólo Finlande. Bato mosusu bazalaka na mwa nsɔni mpo na kokɔta na bisika oyo etongami sika. Ntango basilisi kotonga Ndako ya Bokonzi moko, to mpe basilisi kobongisa oyo ya kala, mbala mingi bibongiseli ezwamaka mpo ete bato nyonso oyo balingi báya kotala ndako yango ya sika. Mbala mosusu esɛngaka kosala milende mpenza mpo na kobenga bato ya zingazinga ete báya kotala Ndako ya Bokonzi mpe báyeba malamumalamu mosala ya Batatoli ya Yehova.

Na etúká moko, Batatoli bazwaki ebongiseli ya kokabola bazulunalo na mokolo wana oyo Ndako ya Bokonzi na bango ya sika efungwamaki mpo bato nyonso bákenda kotala yango. Batatoli mibale, bakutanaki na mobali moko mobange oyo ayebisaki bango ete asepelaka mingi kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Bandeko mibali yango basololaki na ye na ntina etali ebongiseli wana ya kotala Ndako ya Bokonzi na bango ya sika, mpe bayebisaki ye ete bakoki komema ye kino na esika yango. Mobali yango andimaki kokende. Lokola mwasi na ye mpe azalaki kolanda lisolo na bango agangaki ete: “Bótika ngai te.”

Na nsima ya kokɔta na Ndako ya Bokonzi, mobali yango atalaki zingazinga na ye mpe alobaki boye: “Ezali na molili te, ezali mpenza kitoko mpe ezali kongɛnga. Bayebisaki ngai ete Ndako ya Bokonzi ezalaka molili.” Mobali yango na mwasi na ye bafandaki mwa moke mpe na nsima basɛngaki mikanda mosusu oyo etandamaki likoló ya mesa.

Lisangá moko esepelaki kosalela zulunalo moko ya mboka na bango mpo na kopanza nsango ete moto nyonso oyo alingi akoki kokende kotala Ndako ya Bokonzi na bango ya sika. Ntango bayebisaki mokambi ya zulunalo yango likambo wana, apesaki likanisi ete bákoma lisolo moko oyo ekolobela likambo yango. Bandeko bandimaki, mpe na nsima ya mwa ntango moke, lisolo moko oyo ezwaki ndambo moko likoló ya mibale ya lokasa moko ebimaki na zulunalo yango, elobelaki na lolenge ya malamu mpenza likambo oyo elingaki kosalema mpe misala oyo lisangá ya Batatoli ya Yehova esalaka na mboka yango.

Nsima ya kobima ya lisolo yango, Motatoli moko mobange akutanaki na moto moko oyo afandaka penepene na ye, oyo alobaki na ye ete: “Lisolo moko ya kitoko ebimi lelo na zulunalo, elobeli Batatoli ya Yehova.” Ndeko mwasi yango azwaki nzela ya kopesa ye litatoli mpe mwa ntango moke na nsima atikelaki ye mwa buku Ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso.

Longola likambo ya kosilisa makanisi mabe oyo mbala mosusu bato bazalaka na yango mpo na Batatoli, ebongiseli lokola oyo ya kobenga bato báya kotala Ndako ya Bokonzi mpe programɛ ya bofungoli Bandako ya Bokonzi ya sika, elendisi basakoli mingi mpamba te elendisaka bango bábenga lisusu bato mingi na makita. Ya solo, na bamboka ebele bakisa mpe ekólo Finlande, bato bayebi sikoyo ete Bandako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova ezali mpo na bato nyonso.