LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Août 2019

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 30/09 tii 27/10/2019.

“Tozali kotika te”!

Ndenge nini elikya na biso mpo na mikolo ezali koya ekoki kosalisa biso tózala na ekateli makasi ya kotika te koyika mpiko?

Bolingo na bino ebakisama

Mokanda epai ya Bafilipi esalisaka biso tómona ndenge bolingo na biso ekoki kobakisama, ata ntango tokutani na mikakatano.

“Baoyo bazali koyoka yo” bakobika

Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso ya libota báyeba Yehova?

Ntango mokumba oyo ozalaki na yango esili

Bandeko mingi bayokaka mpasi kotika mokumba oyo balingaki. Nini ekoki kosalisa bango bámesana na mbongwana yango?

Kondima​—Ezaleli oyo epesaka makasi

Kondima ezali na nguya mingi. Soki tozali na kondima, tokoki kolonga mikakatano oyo ezali lokola ngomba.

Yoane Mobatisi​—Ndakisa oyo ekoki kosalisa biso tóbatela esengo

Ndenge nini tokoki kobatela esengo na mosala ya Nzambe ata ntango tokutani na makambo ya kolɛmbisa nzoto?