Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

Badiskur oyo esalaki ete nsango malamu epalangana na Irlande

Badiskur oyo esalaki ete nsango malamu epalangana na Irlande

NTANGO masuwa ekómaki pene na bokula ya mbu na Belfast, mwa bato oyo batɛlɛmaki likoló ya kobe babandaki komona mwa bangomba oyo etondi na matiti ya mobesu, na ntɔngɔntɔngɔ. Ezalaki na sanza ya 05/1910. Charles Russell mpe azalaki na kati ya bato yango; ezalaki mobembo na ye ya mitano na Irlande. Mwa liboso, ezalaki na masuwa mibale ya minene oyo bazalaki kotonga, Titanic ná masuwa mosusu Olympic. * Na libongo, ezalaki na Bayekoli ya Biblia ebele batɛlɛmi, bazali kozela ndeko Russell akóma.

Mbula soki 20 liboso, lokola ndeko Russell azalaki koluka ndenge eleki malamu ya kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba, amonaki ete asengeli kosala mibembo libándá ya Amerika. Akendaki liboso na Irlande, na sanza ya 07/1891. Ntango azalaki na kati ya masuwa City of Chicago, amonaki ndenge moi ezalaki kolala wana bazalaki kopusana na libongo ya Queenstown, mpe mbala mosusu akanisaki makambo oyo baboti na ye bazalaki koloba mpo na esika bautá. Ntango ndeko Russell ná baninga na ye bazalaki kotambolatambola na mboka yango ya kitoko, bamonaki ete bilanga yango “eteli mpe ezali kozela eleko ya kobuka mbuma.”

Ndeko Russell akendaki na Irlande mbala nsambo. Emonani ete masolo oyo asalaki mbala ya liboso oyo akendaki kuna etindaki bato mosusu ebele báyaka mpo na koyoka ye na mbala nyonso oyo elandaki. Kobanda na mobembo na ye ya mibale, na sanza ya 05/1903, liyebisi mpo na badiskur oyo ekosalema na Belfast mpe na Dublin ezalaki kotyama na bazulunalo ya mboka. Na nsima, ndeko Russell alobaki ete “bayangani bazalaki kolanda na likebi mpenza” lisolo oyo elobelaki “elaka” oyo elobeli kondima ya Abrahama mpe mapamboli oyo bato bakozwa na mikolo ezali koya.

Lokola bato mingi ya Irlande bazalaki kosepela na solo, ndeko Russell akendaki lisusu kuna na mobembo ya misato oyo asalaki na Mpoto. Mokolo moko na ntɔngɔ, na sanza ya 04/1908, bandeko mibali 5 bayaki koyamba ye ntango akitaki na masuwa na Belfast. Na mpokwa, asalaki diskur oyo elobaki “Kokwea ya mokili ya Satana” mpe “bato soki 300” bayaki kolanda yango. Asalelaki mbala moko Makomami mpo na kosembola moto moko oyo alukaki kotɛmɛla ye. Na Dublin, motɛmɛli mosusu na nkombo O’Connor, oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ya ebongiseli moko oyo esangisi bilenge ya lingomba ya bokristo (YMCA), alukaki kotinda bayangani koleka 1 000 bábalukela Bayekoli ya Biblia. Nini esalemaki?

Tómeka komona na makanisi ndenge likambo yango esalemaki na ntango wana. Mobali moko oyo alingi koyeba mateya ya Biblia azwi ekateli ya kokende na diskur oyo liyebisi na yango ebimaki na zulunalo The Irish Times. Asali makasi mpenza mpo azwa esika ya kofanda na ndako oyo etondi na bato. Mobali yango azali kolanda na likebi mpenza molobi oyo azali na nsuki mpɛmbɛ, mandɛfu ebele mpe alati kazaka molai ya moindo. Molobi azali kosala diskur na ye, azali kotambolatambola na ebaelo, azali kosala bajɛstɛ, azali kolimbola vɛrsɛ mokomoko malamu, mpe mobali wana azali kokanga ntina ya mateya ya Biblia. Atako bikóliseli-lolaka ezali te, mongongo ya molobi ezali makasi, ezali koyokana malamu na ndako yango, ebendi likebi ya bayoki na boumeli ya ngonga mobimba ná ndambo. Na nsima, na ntango ya mituna mpe biyano, O’Connor ná baninga na ye batɛmɛli molobi, kasi alongi kokweisa bango na lisalisi ya Biblia. Bayangani babɛti mabɔkɔ mpo na komonisa esengo na bango. Ntango kobendana esili, mobali wana asololi na bandeko mpo na koyeba makambo mosusu. Bato oyo bamonaki makambo wana bakomaki ete bato mingi bayekolaki solo na lolenge wana.

Ntango alongwaki New York na sanza ya 05/1909 na masuwa Mauretania mpo na mobembo na ye ya minei, ndeko Russell amemaki ndeko Huntsinger, oyo azalaki kokoma makambo na steno, mpo ntango bazali na mai ayebisa ye masolo oyo ekobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Diskur ya ndeko Russell na Belfast esangisaki bana-mboka 450, oyo bato soki 100 kati na bango batɛlɛmaki mpo bisika ya kofanda ezalaki mingi te.

Ndeko Russell na kati ya masuwa Lusitania

Na mobembo ya mitano, oyo tolobelaki na ebandeli, makambo ezalaki kaka bongo. Nsima ya kosala diskur na Dublin, moto moko ya teoloji, oyo O’Connor amemaki, azwaki biyano ya Biblia na mituna na ye, mpe bayangani nyonso basepelaki. Na mokolo oyo elandaki, ndeko Russell ná baninga na ye bazwaki masuwa oyo ezalaki komema mikanda nokinoki na Liverpool mpe kuna, bazwaki masuwa Lusitania mpo na kozonga na New York. *

Liyebisi ya diskur ebimi na zulunalo The Irish Times, na 20/05/1910

Badiskur ya ndeko Russell ebimaki mpe na bazulunalo na mobembo na ye ya mbala ya motoba mpe ya nsambo na 1911. Na eleko ya prɛnta, Bayekoli ya Biblia 20 na Belfast bayambaki bato 2 000, oyo bayokaki diskur oyo ezalaki na motó ya likambo “Nsima ya liwa.” O’Connor ayaki lisusu na Dublin elongo na moteyi mosusu mpo na kotuna mituna, kasi bayangani basepelaki na biyano oyo bapesaki, oyo eutaki na Biblia. Na eleko ya otɔnɛ kaka ya mbula yango, bakendaki na bingumba mosusu, mpe bayangani bazalaki ebele. O’Connor ná bato na ye 100 ya mobulu bakendaki lisusu na Dublin kotya mobulu na likita moko, kasi bayangani bazalaki na ngámbo ya molobi.

Atako ndeko Russell nde azalaki kosala badiskur na ntango wana, ayebaki ete “moto moko te azali na ntina koleka,” mpo “ezali mosala ya moto te; ezali mosala ya Nzambe.” Badiskur oyo liyebisi na yango ezalaki kopesama na bazulunalo, oyo ebimisá momeseno ya kosala makita mpo na bato nyonso, esalisaki mpo na koteya solo ya Biblia. Ebimisaki mbuma nini? Badiskur wana esalisaki na kopalanganisa nsango malamu, mpe masangá efungwamaki na bingumba ebele na Irlande mobimba.​—Euti na biloko oyo tosalelá kala na Grande-Bretagne.

^ par. 3 Titanic ezindaki mbula mibale na nsima.

^ par. 9 Masuwa Lusitania epanzanaki na bokula ya sudi ya Irlande na sanza ya 05/1915.