Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

1921—Eleki sikoyo mbula nkama

1921—Eleki sikoyo mbula nkama

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI ya 01/01/1921 na Anglais etunaki Bayekoli ya Biblia ya molende motuna oyo: “Mosala nini ezali kozela biso na mbula oyo?” Mpo na koyanola na motuna yango, zulunalo yango etángaki Yisaya 61:1, 2, oyo ekundolelaki bango mosala na bango ya kosakola. Elobi: “Yehova atye ngai mafuta mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu . . . , nasakola mbula ya boboto oyo euti na Yehova mpe mokolo Nzambe na biso akozongisa mabe.”

BASAKOLI YA MPIKO

Mpo na kosakola nsango malamu, Bayekoli ya Biblia basengelaki kozala na mpiko. Basengelaki koyebisa bato ya komikitisa “nsango malamu” mpe “mokolo Nzambe na biso akozongisa mabe” epai ya basali-mabe.

Ndeko John Hoskin, oyo azalaki kofanda na Canada, asakolaki na mpiko mpenza atako botɛmɛli. Na ebandeli ya mobu 1921, akutanaki na pastɛrɛ moko ya lingomba ya Méthodiste. Mpo na kosolola na pastɛrɛ yango, ndeko Hoskin alobaki na ye boye: “Nalingi tósolola na kimya nyonso makambo etali Biblia, mpe ata soki toyokani te na makambo mosusu, tokoki kokata lisolo na kimya nyonso, mpe kotikala kaka baninga.” Kasi esalemaki bongo te. Ndeko Hoskin alobi boye: “Tosololaki kaka mwa miniti moke mpe na nsima pastɛrɛ yango atindikaki porte makasi mpe nakanisaki ete batalatala ya porte yango ekopanzana.”

Pastɛrɛ yango agangaki boye: “Mpo na nini okei te koteya bato oyo bazali bakristo te?” Ndeko Hoskin azongisaki ata eyano te. Kasi wana azalaki kokende, alobaki boye na nse ya motema: ‘Lolenge na ye ya kosala makambo emonisi ete azali mokristo te!’

Na mokolo oyo elandaki, ntango pastɛrɛ yango azalaki koteya, alobaki mabe mpo na ndeko Hoskin. Ndeko Hoskin alobi boye: “Pastɛrɛ yango ayebisaki bato ete nazali mobuki-lokuta monene na engumba wana mpe ete esengeli bábɛta ngai masasi.” Kasi ndeko Hoskin atikaki te, akobaki kosakola mpe bato ebele bandimaki koyoka ye. Alobi boye: “Nasepelaki mingi kosolola na bato ya engumba yango. Bamosusu kutu bazalaki koloba na ngai boye: ‘Toyebi ete ozali mosaleli ya Nzambe!’ mpe balobaki ete bakopesa ngai nyonso oyo esengeli mpo nazanga eloko te.”

BOYEKOLI YA MOTO YE MOKO MPE OYO YA LIBOTA

Mpo na kosalisa bato oyo bazalaki kosepela na solo bákola na elimo, Bayekoli ya Biblia babimisaki baprogramɛ ya koyekola Biblia na zulunalo L’Âge d’Or. * Programɛ ya koyekola Biblia mpo na bana, ezalaki na mituna oyo baboti bazalaki kosolola ná bana na bango. Baboti basengelaki “kotuna bana mituna yango mpe na nsima kosalisa bango bázwa biyano na kati ya Biblia.” Mituna mosusu ezalaki koteya makambo ya pɛtɛɛ oyo etali Biblia, na ndakisa “Biblia ezali na mikanda boni?” Motuna mosusu lokola: “Bakristo nyonso basengeli kozela ete bakokutana na minyoko?,” ezalaki kosalisa bilenge bálongola kobanga na mosala ya kosakola.

Programɛ mosusu ezalaki na mituna mpe biyano ya Biblia mpo na baoyo bayebaki makambo mingi ya Biblia. Biyano na mituna yango ezalaki na volimi ya liboso ya buku Étude des Écritures. Bato ebele oyo basalelaki baprogramɛ yango bazwaki mpenza matomba, kasi na nsima, nimero ya L’Âge d’Or ya 21/12/1921 elobaki ete baprogramɛ yango nyonso mibale ekobanda kobima lisusu te. Mpo na nini?

BUKU YA SIKA!

Buku La Harpe de Dieu

Karte moko oyo ezali na programɛ ya makambo ya kotánga na buku yango

Bakarte oyo ezalaki na mituna

Bandeko oyo bazalaki kokamba bamonaki ete bato basengelaki koyekola Biblia na molɔngɔ, elingi koloba lisolo moko nsima ya mosusu. Yango wana na sanza ya 11/1921 babimisaki buku La Harpe de Dieu. Bato oyo bandimaki kozwa buku yango, bakɔtaki na programɛ ya koyekola Biblia oyo bakokaki kosala bango moko. Boyekoli yango esalisaki batángi báyeba “Mokano ya Nzambe ya kopesa bato bomoi ya seko.” Boyekoli yango ezalaki kosalema ndenge nini?

Soki moto andimi kozwa buku moko, bazalaki kopesa ya mwa karte moko oyo ezalaki kosalisa ye ayeba makambo nini asengelaki kotánga na buku yango. Na pɔsɔ oyo elandi, bazalaki kopesa ye karte mosusu oyo ezalaki na mituna ndenge na ndenge mpo na makambo oyo autaki kotánga. Na nsuka ya karte yango, ezalaki na programɛ ya makambo ya kotánga mpo na pɔsɔ oyo ekolanda.

Pɔsɔ nyonso, na boumeli ya bapɔsɔ 12, bandeko ya lisangá oyo ezalaki penepene bazalaki kotindela moyekoli yango ya Biblia karte ya sika. Mbala mingi bandeko ya lisangá oyo bakómaki mibange to oyo bazalaki na likoki ya kobima na mosala ya kosakola te nde bazalaki kotindela bato bakarte yango. Na ndakisa, ndeko mwasi Anna Gardner, oyo azalaki kofanda na Millvale, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, alobaki boye: “Ntango babimisaki buku La Harpe de Dieu, esalisaki ndeko na ngai ya mwasi Thayle oyo azalaki na mokakatano ya kotambola. Akómaki na makambo mingi ya kosala, na ndakisa, kotindela bato pɔsɔ nyonso bakarte oyo ezalaki na mituna.” Soki moto asilisi boyekoli yango, ndeko moko ya lisangá azalaki kokende kotala ye mpo na kosalisa moto yango ayekola makambo mosusu ya Biblia.

Ndeko mwasi Thayle Gardner na kiti na ye ya bibɔsɔnɔ

MOSALA OYO EZALAKI KOZELA BANGO

Na nsuka ya mobu 1921 ndeko Joseph Rutherford atindelaki masangá nyonso mokanda moko. Alobaki boye: “Mosala ya kosakola Bokonzi oyo tosali na mbula oyo ezalaki monene mpe esalisi bato ebele koleka bambula oyo eleki.” Abakisaki boye: “Mosala monene ezali kozela biso. Bólendisa bato mosusu básangana elongo na biso na mosala yango ya kitoko.” Na ntembe te, Bayekoli ya Biblia balandaki mpenza toli na ye. Na mobu 1922, basakolaki na mpiko nyonso nsango ya Bokonzi koleka ndenge basalaki yango liboso.

^ par. 9 L’Âge d’Or ekómaki kobengama Consolation na 1937 mpe Lamuká! na 1946.