Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OKOKI KOLONGA MPASI YA KOBUNGISA MOTO NA LIWA

Makambo oyo moto akoki kokutana na yango

Makambo oyo moto akoki kokutana na yango

Bato mosusu ya mayele balobaka ete moto oyo ndeko to moninga na ye akufi ayokaka mpasi, mpasi yango emataka to ekitaka, mpe nsukansuka esilaka; nzokande, mpo na koloba solo, bato nyonso bayokaka mpasi yango ndenge moko te. Tokoki koloba te ete bato mosusu bayokaka mawa to mpasi te. Soki moto azali kondima ete azali na mpasi mpe azali kobimisa yango, ekoki kosalisa ye; kasi tokoki te koloba ete ezali na “ndenge oyo ebongi” ya koyoka mpasi. Ekoki kotalela ndenge makambo esalemaka na mboka na bango, bomoto na ye, makambo oyo akutaná na yango, mpe boyokani ya ndenge nini azalaki na yango na moto oyo akufi.

EKOSUKA WAPI?

Ntango mosusu moto oyo ndeko to moninga na ye akufi ayebaka te ndenge oyo akoyoka na nsima. Atako bongo, ezali na makambo oyo ekómelaka bato mingi, oyo ekoki mpe kokómela ye. Ekoki kozala makambo oyo:

Moto azali koyeba te asala nini. Ntango mosusu azali kolela mingi moto oyo akufi, azali koyoka mposa na ye makasi, mpe ntango mosusu mawa ezali koyela ye na mbalakaka. Basuvenire ya moto oyo akufi to kolɔta ye ekoki kolamwisa lisusu mpasi. Kasi, mbala mingi, na ebandeli moto abulunganaka mpe andimaka naino te ntango bayebisi ye ete Songolo akufi. Mwasi moko nkombo na ye Tina ayebisi ndenge ayokaki ntango mobali na ye Timo akufaki liwa ya mbalakaka: “Liboso, natikalaki lokola ekeko. Nazalaki kokoka ata kolela te. Ezalaki kolekela ngai; ntango mosusu kutu mpema ezalaki kokatana ngai. Nazalaki kondima te ete likambo ya ndenge wana esalemaki.”

Moto akobanda komitungisa, koyoka nkanda, to komipesa foti. Ivan alobi boye: “Na ntango moko boye nsima ya liwa ya mwana na biso Eric, oyo azalaki na mbula 24, ngai ná mwasi na ngai Yolanda, tozalaki koyoka nkanda makasi! Ekamwisaki biso mpo toyebi ete tozalaka bato ya nkandankanda te. Tozalaki mpe komipesa foti mpe tozalaki komituna soki ezali na likambo moko oyo tosalaki te mpo na kobikisa mwana na biso.” Alejandro azalaki mpe komipesa foti ntango mwasi na ye, oyo aumelaki na maladi, akufaki. Alobi boye: “Liboso, nazalaki koloba ete soki Nzambe atiki ngai nanyokwama boye, elakisi ete nazali moto mabe. Na nsima, nayokaki mabe mpo ezali lokola nde nazalaki kopesa Nzambe foti.” Kostas, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi boye: “Ekómelaki ngai kutu nayokela Sophia nkanda ndenge akufaki. Na nsima, namonaki ete nasengeli kokanisa bongo te. Mpo ezalaki foti na ye te.”

Moto mosusu akokóma na mobulu na makanisi. Ntango mosusu, okomona moto azali lisusu kokanisa malamu te. Na ndakisa, moto mosusu akoki kokanisa ete azali koyoka mongongo ya mowei, kosimba ye, to mpe komona ye. Moto mosusu mpe akokoka lisusu te kotya makanisi esika moko to mpe akobanda kobosana makambo. Tina alobi boye: “Okomona nazali kosolola na moto; kasi, nakosutuka boye, makanisi esí ekómaki mosika! Nakómaki kokanisa ndenge Timo akufaki. Koyeba kotya makanisi esika moko te etungisaka.”

Mposa ya kokima bato. Moto mosusu akoki kokóma nkandankanda to koyoka ete azali na esika na ye te ntango azali na bato mosusu. Kostas alobi boye: “Soki tofandi ná bandeko ná basi na bango, nazalaki komiyoka lokola nde nazali na esika na ngai te. Kasi, nazalaki mpe koyoka bongo soki nafandi ná minzemba.” Yolanda, mwasi ya Ivan, alobi boye: “Nazalaki koyoka mabe kozala na bato oyo bazalaki komilelalela mpo na makambo ya mikemike soki nakokanisi yango na oyo ekómelaki biso! Kasi, nazalaki mpe koyoka mabe soki bato bazali kobɛtela biso masolo ya bana na bango. Nazalaki koyokela bango zuwa te; kasi masolo yango ezalaki kosala ngai mpasi. Ngai ná mobali na ngai toyebaki ete bomoi ezali bongo, kasi tozangaki nde motema molai mpo na koyoka bango.”

Mikakatano ya nzoto. Bato mingi babungisaka mposa ya kolya, bamosusu bakɔndaka, to mpe bazangaka mpɔngi. Aaron alobeli likambo oyo akutanaki na yango mbula moko nsima ya liwa ya tata na ye. Alobi boye: “Mpɔngi ekómaki kokatana ngai. Nazalaki kolamuka kaka na ngonga moko wana butu nyonso mpe nazalaki kokanisa tata na ngai oyo autaki kokufa.”

Alejandro alobi ete akómaki na mikakatano ya nzoto oyo azalaki koyeba ntina na yango te: “Nakutanaki na monganga mbala mingi, kasi azalaki koyebisa ngai ete nazali na maladi te. Nakanisaki ete mawa oyo nazalaki na yango nde ezalaki kosala ete nayoka nzoto malamu te.” Nsukansuka, mikakatano wana nyonso esilaki. Atako bongo, likanisi oyo Alejandro azwaki ya kokutana na monganga ezalaki malamu. Mpasi oyo moto ayokaka ntango ndeko to moninga na ye akufi ekoki kosilisa nzoto na ye makasi ya kobundisa maladi, kobimisa maladi oyo ebombanaki, to kopesa ye maladi oyo azalaki na yango te.

Mpasi mpo na kosala makambo ya ntina. Ivan alobi boye: “Nsima ya liwa ya Eric, tosengelaki koyebisa bandeko, baninga, mpe bato mosusu, na ndakisa patrɔ na ye mpe nkolo-ndako oyo azalaki kofutela. Ezalaki mpe na ebele ya mikanda ya Leta oyo tosengelaki kotondisa. Tosengelaki kofungola biloko nyonso ya Eric. Esɛngaki biso tólandela makambo nyonso wana na ntango oyo nzoto mpe makanisi na biso elɛmbaki mingi.”

Kasi, ezali mpe na bato mosusu oyo bayokaka mpasi na nsima, ntango bakómi kosala makambo oyo moto oyo akufi amesanaki kosala. Yango nde ekómelaki Tina. Alobi boye: “Timo azalaki kolandela makambo ya mbongo na biso na banki mpe makambo mosusu. Sikoyo ekómaki mokumba na ngai, mpe yango ebakiselaki ngai mokakatano. Nazalaki komituna soki nakokoka kosala nyonso wana malamu.”

Makambo nyonso oyo tolobeli ekoki kobangisa. Mpo na koloba solo, mpasi oyo moto ayokaka ntango ndeko to moninga na ye akufi ekoki kozala makasi; kasi, koyeba makambo yango liboso ekoki kosalisa moto yango alonga mpasi wana. Tóbosana mpe likambo oyo te: moto nyonso te nde akutanaka na makambo nyonso wana. Longola yango, moto oyo azali na mpasi wana akoki kokitisama motema na koyeba ete mpasi makasi oyo toyokaka ntango ndeko to moninga na biso akufi ezali mabe te.

NAKOYOKA LISUSU ESENGO NA MOKILI OYO?

Makambo oyo ekoki koya: Mpasi makasi oyo moto ayokaka eumelaka libela te; nsukansuka ekitaka. Awa tolingi koloba te ete susi nyonso elimwaka mpe moto abosanaka ndeko to moninga na ye oyo akufi. Nzokande, mpasi makasi oyo moto ayokaka ekitaka mokemoke. Ekoki kolamuka ntango basuvenire mosusu ezongi na mbalakaka to na badati mosusu, na ndakisa dati oyo babalanaki to oyo moto yango akufaki. Kasi, nsukansuka, bato mingi bamitungisaka lisusu mingi te mpe bazongelaka makambo na bango ya mokolo na mokolo. Ezalaka mingi bongo soki bandeko to baninga bazali kosalisa moto oyo azali na mpasi mpe soki azali kosala mwa makambo mosusu oyo ekoki kosalisa ye.

Ekosila mokolo nini? Bato mosusu bakómaka koyoka mwa malamu kaka nsima ya basanza. Mpo na bato mingi, mbula mobimba to mibale ekoki koleka liboso báyoka malamu. Mpe ezali na baoyo bakoki kozwa ntango molai lisusu. * Alejandro alobi boye: “Mpasi makasi oyo nazalaki koyoka eumelaki soki mbula misato.”

Zalá na motema molai. Komitungisa te mpo na mokolo oyo ekómi naino te, salá makambo oyo okokoka, mpe kobosana te ete mpasi oyo moto ayokaka ntango ndeko to moninga na ye akufi eumelaka libela te. Kasi, ezali nde na makambo oyo okoki kosala mpo mpasi na yo ekita to mpe eumela mingi te?

Mpasi makasi oyo toyokaka ntango ndeko to moninga na biso akufi ezali mabe te

^ par. 17 Mwa bato mosusu batikalaka na mpasi makasi mpe eumelaka mpenza. Ekoki kozala malamu bato ya ndenge wana bákutana na monganga.