Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mposo ya nyama babengi loutre de mer

Mposo ya nyama babengi loutre de mer

BANYAMA mingi oyo emɛlisaka bana mabɛlɛ (mammifères) mpe efandaka na mai ya malili ezalaka na mafuta ebele na nse ya mposo na yango, oyo ebatelaka yango mpo eyoka malili mingi te. Kasi loutre de mer ezalaka nde na mposo oyo etondi na nsuki, oyo ebatelaka yango.

Kanisá naino: Mposo ya loutre de mer etondá na nsuki koleka banyama mosusu nyonso oyo emɛlisaka bana mabɛlɛ; ezali na nsuki ebele mpenza. Ntango nyama yango ekɔtaka na mai, mposo na yango oyo etondi na nsuki ebombaka mopɛpɛ. Mopɛpɛ yango epekisaka mai ya malili ekɔta na nzoto ya nyama yango mpo nzoto ekoba kozala mɔtɔ.

Bato ya siansi bamonaki ete bakoki komekola mposo ya loutre de mer. Na yango, basalaki bilamba ya malili ndenge na ndenge; mosusu ezalaki na nsuki milai, mosusu ezalaki na yango mingi te. Bato oyo bayekolaki likambo yango bamonaki ete “bilamba oyo ezalaki na nsuki ebele mpe milai, ezalaki kokɔtisa mai mpe malili te.” Na maloba mosusu, loutre de mer nde ezali na elamba oyo eleki malamu mpo na komibatela na malili.

Bato oyo bayekolaki likambo yango bazali na elikya ete bolukiluki na bango ekosalisa bato ya mayele na tekiniki bábimisa lolenge ya sika ya bilamba oyo ekɔtisaka mai te. Yango etindi bato mosusu báloba ete ezali malamu mpo na bato oyo bakɔtaka na kati ya mai bálataka bilamba oyo etondi na nsuki lokola mposo ya loutre de mer.

Okanisi nini? Mposo ya loutre de mer oyo ekɔtisaka mai te, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?