Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ozali na bokonzi likoló ya bomoi na yo?

Ozali na bokonzi likoló ya bomoi na yo?

NTANGO ozalaki mwana moke, ozalaki kokana kosala nini na bomoi na yo? Mbala mosusu okanaki kobala, kobakisa lisusu mayele na mosala moko boye to kosala mosala oyo osepelaka na yango mpenza. Kasi, makambo etambolaka ntango nyonso te ndenge tokanaka. Makambo oyo tokanaki te ekoki kobongola nyonso oyo tokanaki. Yango nde ekómelaki Anja, Delina ná Gregory.

  • Bazwaki Anja, oyo afandaka na Allemagne na maladi ya kanser ntango azalaki na mbula 21 mpe sikoyo akɔtá ndako.

  • Delina, oyo afandaka na États-Unis, abɛlaka maladi moko na bɔɔngɔ oyo babengi dystonie. Longola yango, abatelaka bandeko na ye misato oyo bazali bibɔsɔnɔ.

  • Gregory, oyo afandaka na Canada, abɛlaka maladi ya makanisi.

Atako bazali na mikakatano wana, Anja, Delina mpe Gregory balongaka kozala na bokonzi likoló ya bomoi na bango. Ndenge nini?

Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” (Masese 24:10) Liteya ezali polele: Ndenge ya kotalela makambo ezali na ntina mingi. Soki okómi komitungisa mingi mpo na likambo oyo ekómeli yo, okokoka te kozwa bikateli oyo ekoki kosalisa yo, kasi soki obungisi elikya te, ekozala pɛtɛɛ ozwa bikateli ya malamu mpe ozala na mwa esengo ata soki ozali na mikakatano.

Tótala ndenge yango emonani na bomoi ya Anja, Delina mpe Gregory.