Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Espagne

Bato moko ya siansi balobi ete ekoki kozala makambo oyo bato basalaka nde esalaki ete mabele eningana na 2011 na engumba Lorca, na sudi ya Espagne, oyo ebomaki bato 9 mpe ezokisaki ebele ya bato. Bato oyo bayekolaka mabele (géologues) bamoni ete koningana yango esalemaki mpo na mabulu oyo batimolaki na esika yango mpo na kobimisa mai ya kosopa na bilanga.

Chine

Baturiste na Chine babimisaki mosolo ya dolare miliare 102 mpo na mibembo na mikili ya bapaya na 2012. Ebongiseli ya ONU oyo etalaka makambo ya baturiste elobaki ete mosolo yango esali ete Chine ezala na esika ya liboso na kati ya bikólo oyo ebimisaka mbongo mpo na mibembo ya ndenge wana; eleki kutu Allemagne mpe États-Unis, oyo mokomoko na yango ebimisaki mosolo ya dolare miliare soki 84 mpo na mibembo yango.

Japon

Zulunalo moko ya Grande Bretagne (BMJ) oyo elobelaka makambo ya minganga esalaki ankɛtɛ epai ya bato soki 68 000 na ekólo Japon na boumeli ya mbula 23. Ankɛtɛ yango emonisaki ete basi oyo babotamá kobanda 1920 tii 1945, oyo bamɛlaki makaya liboso bákokisa mbula 20, bakufaki mbula 10 liboso ya basi oyo bamɛlaki makaya te mpe mibali bakufaki mbula 8 liboso ya baoyo bamɛlaki yango te.

Mauritanie

Mpo na kobatela bomoi ya banyama oyo ezalaka na mai mpe na mokili, guvɛrnema ya ekólo Mauritanie epekisaki bato bákɔtisa, básala to básalela basaki ya plastiki, mpo nyama ekoki kokufa soki elei yango. Guvɛrnema esɛngi bato básalela biloko oyo epɔlaka na esika ya kosalela biloko ya plastiki.

Mokili

Bakompanyi ya asiranse ebimisaka mosolo ya dolare miliare soki 50 na mbula mpo na makama oyo ebimaka mpo na kobeba ya klima. Lokola biloko ezali komata ntalo, kobanda bambula ya 1980, mosolo yango ebakisamaka mbala mibale nsima ya mbula 10.