Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tolingi bampasi esila!

Tolingi bampasi esila!

Mpasi ya Khieu ebandaki ntango babomaki tata na ye mpo atikaki bangɔmbɛ na ye etambola na elanga moko ya masango oyo ezalaki mosika te. Na nsima, basoda ya Cambodge oyo bazalaki kobenga Khmer rouge babomaki mama na ye ná bandeko na ye mibale ya basi. Na nsima, Khieu anyataki esika oyo bakundaki mine. Mikolo 16 elekaki liboso báya kosalisa ye. Bakataki ye lokolo. Khieu alobi boye: “Nazalaki na mposa ya bomoi te.”

MBALA mosusu yo mpe omonaka ete mpasi eponaka moto te. Makama, maladi mpe mikakatano mosusu, mobulu, mpe makambo mosusu ya nsɔmɔ ekoki kokómela moto nyonso, na esika nyonso, mpe na ngonga nyonso. Masangá oyo esalisaka bato oyo bazali na mikakatano ezali kosala nyonso mpo mpasi ekómela bato te to mpo na kolɛmbisa yango. Kasi, milende nyonso oyo bazali kosala eboti mbuma nini?

Tózwa ndakisa ya milende oyo ezali kosalema mpo na kosilisa nzala. Zulunalo moko (Toronto Star) elobaki ete makama lokola mipɛpɛ makasi, mpela, koningana ya mabele ezali kobebisela ebele ya bato bandako mpe kozangisa bango biloko ya kolya. Kasi, zulunalo yango elobi ete “lokola mobulu ezali se kobakisama, yango ezali kolɛmbisa milende ya masangá oyo esalisaka bato oyo bazangi biloko ya kolya.”

Bakonzi mpe minganga basali nyonso mpo na kokitisa mpasi, kasi ezali kosila kaka te. Mikano oyo bazwi mpo na kotombola nkita ya bikólo esilisi bobola te. Mangwele, bankisi, mpe mayele ya sika mpo na kosala lipaso ekoki kosilisa maladi nyonso te. Bapolisi bazali kokoka kosilisa mobulu te; kutu ezali nde kobakisama.

Mpo na nini mpasi ezali mingi? Nzambe amonaka ndenge bato bazali konyokwama na mpasi? Ndenge masolo oyo elandi ekomonisa yango, ebele ya bato bazwi biyano ya malamu na mituna yango na Biblia.