Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo Oyo Ezali Koleka Na Mokili

Makambo Oyo Ezali Koleka Na Mokili

Makambo Oyo Ezali Koleka Na Mokili

Mokanda moko oyo Pápa Benoît XVI akomaki elobi boye: “Mposa ekómi makasi . . . ya kobongola ONU, mpe bibongiseli ya nkita mpe ya makambo ya mbongo na mokili mobimba, mpo likanisi ya libota ya bikólo ekóma makasi mpenza.”​—L’OSSERVATORE ROMANO; bango moko batɛngisi.

“Na Ukraine, moto moko kati na bato misato amɛlaka pakɛ moko ya likaya mokolo na mokolo.”​—EXPRESS, UKRAINE.

Na États-Unis, bilenge mibali mingi (44 %) oyo batunaki bango mituna balobaki ete basilá “komona ata fɔtɔ moko ya mwana-kelasi na bango ya mwasi, azali bolumbu na Internet to na telefone ya mabɔkɔ.”​—TIME, ÉTATS-UNIS.

“Motángo moko ya mawa”

Zulunalo moko (Associated Press) elobi ete makambo lokola bitumba, kozanga mbula, yikiyiki na makambo ya politiki, komata ntalo ya bilei, mpe bobola ebimisi “motángo moko ya mawa.” Bato koleka miliare moko bazali kokufa nzala na mokili mobimba lelo. Josette Sheeran, oyo asalaka na ebongiseli ya ONU oyo etalelaka makambo ya bilei na mokili mobimba, alobi ete “mokili ya nzala ezali mokili ya likama. . . . Soki bato bazangi bilei, bazalaka kaka na makambo misato: Kobimisa mobulu, kokende kofanda na mboka mosusu to kokufa. Makambo yango nyonso ezali malamu te.” Longola yango, motángo ya bato oyo bazali kokufa nzala ezali komata mbangu koleka motángo ya bato na mokili. Ata na mikili ya bozwi, motángo ya bato oyo bazali kolya malamu te emati (15,4 %).

Kotánga na ntango ya kolala esalisaka

Ntango baboti bazali kotángela bana na bango na ntango ya kolala, ezalaka kaka te kobondela bango mpo bálala. Minganga bamoni ete kosala bongo ekolisaka likoki ya bana ya koloba, esalisaka bango báyeba kosala makambo, eteyaka bango báyeba kosimba mpe kobalola nkasa ya mokanda, mpe esalisaka bɔɔngo na bango. Zulunalo moko (The Guardian) elobi boye: “Nzokande, likambo eleki ntina . . . ezali ete kotánga na mongongo makasi ezali ntango oyo moboti ná mwana batyelanaka likebi mpe bamoniselanaka bolingo. Etindaka mwana amona mpenza ete kotánga epesaka esengo.” Mpe profesɛrɛ Barry Zuckerman, oyo atambwisaki ankɛtɛ yango, alobi ete “nsukansuka bana bakómaka kolinga babuku mpo bazali kotánga [yango] na moto oyo balingaka.”

Ngɔmbɛ oyo ezali na esengo ebimisaka miliki mingi

Bato ya siansi na Iniversite ya Newcastle, na Angleterre, balobi ete “ngɔmbɛ oyo ezali na nkombo ebimisaka miliki mingi koleka oyo ezali na nkombo te.” Ya solo, kosalela ngɔmbɛ mokomoko makambo na ndenge na ye moko ekoki kotinda yango ebimisa na mbula moko miliki litrɛ 280 koleka ndenge ebimisaka. Mpo na nini? Profesɛrɛ ya eteyelo moko (university’s School of Agriculture, Food and Rural Development), Catherine Douglas, alobi boye: “Ndenge kaka moto ayokaka malamu soki batyeli ye likebi, bangɔmbɛ ekómaka na esengo mingi mpe emitungisaka te soki bazali kotyela mokomoko na yango likebi.” Abakisi boye: “Makambo oyo toyekoli ekokani mingi na makambo oyo basali-bilanga ya malamu bandimaka banda kala. Soki tozali kotyela ngɔmbɛ mokomoko likebi, na ndakisa, kobenga yango na nkombo na yango to kosolola na nyama yango ntango ezali kokola, tokoki kosala ete ekola malamu mpe emesana na bato, kasi mpe ebimisaka miliki mingi.”