Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mbongo ezali nkolo na yo to moombo na yo?

Mbongo ezali nkolo na yo to moombo na yo?

OBƐLAKA maladi oyo babengaka maladi ya mbongo? Balobi ete bato mingi na mokili bazali kobɛla maladi yango. Maladi yango ezali nini?

Roger Henderson, doktɛrɛ moko oyo ayekolaka bamaladi ya motó na Angleterre, auti kobimisa maloba “maladi ya mbongo” mpo na kolobela ndenge bato oyo bamitungisaka mpo na mbongo bayokaka na nzoto mpe na makanisi. Bato yango bayokaka mpema mokuse, motó mpasi, mposa ya kosanza, mposo na bango ebebaka, bazalaka lisusu na mposa ya kolya te, bakómaka nkandankanda mpe bakómaka na makanisi mabe. Henderson alobi boye: “Bato mingi banyokwamaka na makanisi mpo bamitungisaka mingi mpo na mbongo.”

Tosengeli kokamwa te ete na basanza oyo euti koleka, motángo ya bato oyo banyokwamaki na maladi yango ya mbongo ezalaki se kobakisama. Kobeba ya nkita na mikili mingi esali ete bato mingi bábungisa misala, bandako na bango mpe bakoka lisusu te komibombela mwa mbongo. Bakompanyi minene oyo edefisaka mbongo ekwei, mpe ata na mikili ya bozwi mingi, bazali kozwa bibongiseli nokinoki mpo nkita na bango ebeba nyonso te. Na mikili ya bobola, komata ya ntalo ya bilei mpe biloko mosusu ya ntina mpo na bomoi ezali kotinda bato bámitungisa mingi.

Nzokande, mitungisi ya mbongo emonanaka mingi ata ntango oyo mbongo ezali komonana. Na boumeli ya bambula oyo euti koleka, oyo bato bazalaki na mbongo mingi, bato ebele batungisamaki na maladi ya mbongo. Na ndakisa, zulunalo moko ya Afrique du Sud (The Witness) emonisaki ete “maladi ya kosombasomba biloko, mposa makasi ya kozwa mbongo mpe ezaleli ya konduka biloko ya mokili” ezalaki kopanzana mingi na Afrika. Zulunalo yango elobi ete “maladi” yango emonanaki na makambo lokola “mitungisi, banyongo, kosakana na mbongo, kobakisa bangonga nsima ya mosala, komiyoka lokola eloko moko ezangi, bilulela mpe konyokwama na makanisi.” Balobaki ete mbongo ezali nde likambo oyo ezali kobebisa bomoi ya bato na Afrika.

Liboso nkita ya mokili ebeba ndenge ebebi lelo, nkita ya Inde ezalaki likoló. Zulunalo moko (India Today International) elobaki ete na 2007, ekólo yango “esalelaki mbongo mingi koleka.” Atako bongo, na ntango yango kaka bakonzi bazalaki kobanga ete nkita ya Inde ekomema lisusu botomboki ata mpe mobulu mingi.

Kaka na eleko yango, bilenge mingi ya États-Unis bakómaki kosomba biloko mingi ya kitoko kaka mpo na komilakisa. Atako bongo, bazalaki na esengo te. Bato ya mayele balobi ete kozala na mbongo mingi ekómaki moko na makambo oyo ezalaki kosala ete kolangwa masanga, konyokwama na makanisi, ata mpe komiboma ekóma mingi kuna. Ankɛtɛ moko emonisaki ete atako bazalaki na biloko mpe bomɛngo mingi, “bato moke kaka ya États-Unis (1/3)” balobaki ete bazali “na esengo mpenza.”

Bato mosusu bazali na maladi yango te

Na ntango ya malamu to ya mabe, bato mingi, ezala bazwi to babola, bazalaka na mitungisi mingi te mpo na mbongo mpe biloko ya mokili. Mpo na nini?

Na lisolo moko (The Meaning of Money) bato ya pisikoloji bamonaki ete bato mosusu bazali “baombo ya mbongo mpe mbongo nde etambwisaka bango. Yango ekoki komema konyokwama na makanisi mpe maladi ya motó.” Kasi, babakisaki ete: “Baoyo basalelaka mbongo na bango na mayele bayokaka ete bango moko bazali kotambwisa makambo na bango mpe bazalaka na makanisi ya malamu. Bazali bankolo ya mbongo kasi te baombo ya mbongo . . . Tokanisi ete bato oyo basalelaka mbongo na bango na mayele bakoki mpe kokitisa konyokwama na makanisi, mpe na ndenge yango, kozala na mitungisi mingi te.”

Ndenge nini otalelaka mbongo? Ndenge nini ozali kotalela kobongwana ya nkita oyo ezali kosalema na mokili? Mbongo ezali nkolo na yo to moombo na yo? Mbala mosusu ozali kobɛla te maladi oyo babengi maladi ya mbongo. Kasi, tózala bazwi to babola, biso nyonso tokoki kobɛla maladi ya mbongo. Tótalela ndenge mbongwana oyo okosala na lolenge na yo ya kosalela mbongo ekoki komemela yo kimya mingi ya makanisi mpe bomoi ya esengo.