Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe

Biblia ezali na mitinda ebele mpe eteyaka biso makambo oyo ekoki kosalisa biso tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esɛngi na bato nyonso oyo balingaka Yehova Nzambe báyekola kozala na bomoi oyo eyokani na mateya oyo ezali na Liloba na ye, Biblia.

MOKAPO 1

Bolingo ya Nzambe eumelaka seko

Esɛngaka kosala makasi mpo na kobatela boninga na biso na Nzambe. Ndenge nini tokoki kosala yango?

MOKAPO 2

Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe

Nzambe apesá mokomoko na biso lisosoli mpo esalisa biso tózwa bikateli ya malamu na bomoi.

MOKAPO 3

Poná baninga oyo balingaka Nzambe

Baninga bakoki kobongisa yo to kobebisa. Ndenge nini mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo opona baninga ya malamu?

MOKAPO 4

Mpo na nini osengeli kotosa bokonzi?

Tozali na bantina ya malamu ya kotosa na libota, na lisangá, mpe bakonzi ya mboka.

MOKAPO 5

Ndenge ya kokabwana na mokili

Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bozali bato ya mokili te.” Liloba “mokili” elimboli mpenza nini, mpe mpo na nini bakristo basengeli kokabwana na mokili?

MOKAPO 6

Ndenge ya kopona kominanola

Kominanola oyo ezali na mokili oyo ezali lokola mbuma oyo eteni na yango mosusu ezali malamu, mosusu epɔlá?

MOKAPO 7

Nzambe azwaka bomoi na motuya​—Bongo yo?

Mitinda nini ya Biblia ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na oyo etali bomoi mpe makila?

MOKAPO 8

Yehova alingi basaleli na ye bázala pɛto

Mibeko ya Nzambe na oyo etali bopɛto eleki mosika bopɛto ya nzoto, bilamba mpe ndako na biso. Ezali na ntina na losambo, bizaleli mpe makanisi na biso.

MOKAPO 9

‘Kimá pite!’

Pité ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kokima yango?

MOKAPO 10

Libala​—Likabo oyo euti na Nzambe

Wapi mwa matomba ya libala? Ndenge nini okoki kopona molongani ya malamu? Nini esalaka ete libala eumela?

MOKAPO 11

Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala

Libala na libala ezalaka na mikakatano na yango. Nzokande, ata mwasi ná mobali oyo bazali na mikakatano minene bakoki kobongisa boyokani na bango.

MOKAPO 12

Bimisáká maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”

Maloba ekoki kolendisa basusu, kasi ekoki mpe kozokisa bango. Yehova ateyaka biso ndenge ya kosalela malamu likoki yango.

MOKAPO 13

Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?

Bafɛti mpe milulu ezali na ntina mingi na bomoi ya bato. Nini ekoki kosalisa yo oyeba ndenge oyo Yehova atalelaka bafɛti yango?

MOKAPO 14

Zalá sembo na makambo nyonso

Talá makambo minei ya bomoi oyo ekoki kotya bosembo na biso na komekama mpe matomba oyo tokozwa soki tomonisi ete tozali sembo.

MOKAPO 15

Sepelá na mosala na yo

Mozalisi na biso alingi ete tósepela na mosala oyo tosalaka. Na yango, nini ekoki kosalisa biso tósepela na mosala na biso?

MOKAPO 16

Tɛmɛlá Zabolo

Satana nde azali koyangela mokili oyo. Ndenge nini tokoki kozala ntango nyonso penepene ya Nzambe mpe mpo monguna na biso akima biso?

MOKAPO 17

Tikalá na kati ya bolingo ya Nzambe

Mokomi moko ya Biblia alendisaki bakristo ete: ‘Bómitonga likoló ya kondima na bino oyo eleki bosantu.’ Ndenge nini tokoki kosala yango?

Maloba na nsuka ya lisolo

Ndimbola ya maloba mpe bafraze oyo ezali na buku Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe.