Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 7

Maloba ya ebandeli ya Eteni 7

Eteni oyo elobeli lisolo ya bomoi ya Mokonzi Saulo mpe Mokonzi Davidi, na boumeli ya mbula soki 80. Na ebandeli, Saulo azalaki na komikitisa mpe azalaki kobanga Nzambe, kasi eumelaki te, abongwanaki mpe aboyaki kolanda litambwisi ya Yehova. Yehova aboyaki ye, mpe na nsima, ayebisaki Samwele atya Davidi mafuta mpo akokóma mokonzi na Yisraele. Saulo ayokelaki Davidi zuwa mpe alukaki mbala ebele koboma ye, kasi ata mokolo moko te Davidi azongisaki mabe na mabe. Yonatane, mwana ya Saulo, ayebaki ete Yehova aponaki nde Davidi; na yango, azalaki sembo epai ya Davidi. Davidi asalaki masumu minene, kasi ata mbala moko te aboyaki etumbu ya Yehova. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ntina ya kolanda ntango nyonso bibongiseli oyo Nzambe atyá.

NA ETENI OYO

LITEYA 39

Mokonzi ya liboso na Yisraele

Nzambe apesaki Bayisraele bazuzi mpo na kokamba bango, kasi basɛngaki mokonzi. Samwele atyaki Saulo mafuta mpo akóma mokonzi, kasi na nsima Yehova aboyaki Saulo. Mpo na nini?

LITEYA 40

Davidi ná Goliate

Yehova aponaki Davidi mokonzi ya Yisraele, mpe Davidi amonisaki ete abongi kozala mokonzi.

LITEYA 41

Davidi ná Saulo

Mpo na nini moko ayinaki moninga, mpe oyo bayinaki asalelaki moninga makambo ndenge nini?

LITEYA 42

Yonatane: Mobali ya mpiko mpe ya sembo

Mwana ya mokonzi akómi moninga ya motema ya Davidi.

LITEYA 43

Mokonzi Davidi asali lisumu

Ekateli moko ya mabe ememi mikakatano mingi mpenza.