Lakisá makambo oyo ezali na kati

ETENI 6

Yobo abateli bosembo na ye

Yobo abateli bosembo na ye

Satana atyelaki bosembo ya Yobo ntembe na miso ya Nzambe, kasi Yobo atikalaki sembo epai ya Yehova

OTO akoki mpenza kotikala sembo epai ya Nzambe soki amekami makasi mpenza mpe soki emonani ete botosi na ye ezali komemela ye bolamu moko te ya mosuni? Motuna wana etunamaki mpe ezwaki eyano na likambo ya mobali moko, nkombo na ye Yobo.

Ntango bana ya Yisraele bazalaki naino na Ezipito, Yobo, moto moko ya libota ya Abrahama, azalaki kofanda na mokili oyo ezali kobengama lelo Arabie. Na ntango yango, baanzelu na likoló bayanganaki liboso ya Nzambe, mpe Satana, motomboki, azalaki na kati na bango. Liboso ya liyangani wana ya likoló, Yehova amonisaki polele ete azali kotyela Yobo, mosaleli na ye ya sembo, motema. Na yango, Yehova alobaki ete moto moko te azalaki na bosembo lokola oyo ya Yobo. Kasi Satana alobaki ete Yobo azalaki kosalela Nzambe kaka mpo Nzambe azali kopambola ye mpe kobatela ye. Satana atutaki lisusu ntolo ete soki balongoli Yobo biloko nyonso oyo azali na yango, akolakela Nzambe mabe.

Nzambe atikelaki Satana nzela abotola Yobo biloko nyonso: ya liboso, bozwi na ye nyonso mpe bana na ye, na nsima abebisi sante na ye. Lokola Yobo ayebaki te makambo Satana azalaki kosala mpo na nyonso oyo ekómelaki ye, akokaki koyeba te ntina oyo Nzambe atiki nzela ete akutana na komekama ya makasi boye. Atako bongo, Yobo alakelaki Nzambe mabe te.

Baninga misato ya Yobo bayaki kotala ye, kasi bazali baninga mabe. Baninga yango balobaki makambo ebele, oyo ekomami na mokanda ya Yobo, mpe bamekaki kondimisa Yobo na makasi ete Nzambe apesaki ye etumbu mpo abombaki masumu na ye. Balobaki kutu ete Nzambe asepelaka na basaleli na ye te, mpe atyelaka bango ata motema te. Kasi Yobo aboyaki makanisi ya mabe wana. Yobo atyelaki Nzambe motema mobimba, mpe alobaki ete akotikala na bosembo na ye tii liwa!

Kasi Yobo asalaki libunga moko, azalaki koluka kaka komilongisa. Elenge mobali moko na nkombo Elihu, ayokaki masolo ya Yobo ná baninga na ye banda na ebandeli tii na nsuka, asembolaki Yobo ná baninga na ye. Elihu apamelaki Yobo mpo Yobo azalaki koyeba te ete kolongisa boyangeli ya Nzambe ezali na ntina mingi mpenza koleka kolongisa moto. Elihu apamelaki mpe makasi baninga mabe ya Yobo.

Na nsima, Yehova Nzambe alobaki na Yobo mpe na kosembola makanisi na ye. Yehova alobelaki biloko ya kitoko oyo asalá, apesaki Yobo liteya mpo na komonisa ye ete soki tokokanisi Nzambe ná moto, moto azali moke mpenza, Nzambe aleki ye na bonene mosika mpenza. Yobo amikitisaki, andimaki ndenge oyo Nzambe asembolaki ye. Lokola Yehova azali “na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa,” azongiselaki Yobo sante malamu, abakiselaki ye bozwi oyo azalaki na yango mbala mibale, mpe apambolaki ye na ndenge abotaki lisusu bana zomi. (Yakobo 5:11) Lokola Yobo abatelaki bosembo na ye epai ya Yehova na ntango ya komekama makasi, Yobo apesaki Satana eyano ya malamu mpenza na ntembe oyo abimisaki ete, bato bakotikala sembo epai ya Nzambe te soki bamekami.

​—Euti na mokanda ya Yobo.