“Nayebaki Nzambe malamu te”
“Nayebaki Nzambe malamu te”
MOBALI moko afandaka na etúká ya Kerala, na Inde, akomaki boye: “Mbula eleki, Batatoli ya Yehova bazalaki koya kotala ngai mpe koyebisa ngai nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Nazalaki na Lingomba ya Katolike mbula mwambe kasi nayebaki Nzambe malamu te. Na mbula moko mpamba, nayekoli makambo mingi.” Alobaki lisusu boye: “Nazali na esengo mingi ya koyeba ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaka na minɔkɔ 139 [lelo oyo 146]. Ezali likambo ya kokamwa te ete bato ya minɔkɔ nyonso bazali koyoka nsango ya Nzambe.”
Atako bato mingi ya filozofi balobaka ete tokoki koyeba Nzambe te, ntoma Paulo amonisaki polele ete tokoki koyeba ye. Ntango asololaki na bato ya Atene, oyo bamosusu kati na bango bazalaki kosambela na etumbelo ya mbeka oyo bakomaki ete na “Nzambe oyo ayebani te,” Paulo alobaki boye: “Oyo bino bokangami na ye kozanga ete bóyeba ye, ye nde nazali kosakola epai na bino. Nzambe oyo asalá mokili ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango . . . apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso. Mpe asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabelé.”—Misala 17:23-26.
Paulo alendisaki bato oyo bayokaki ye báluka koyeba Mozalisi, mpo “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo na koyeba Nzambe ya solo mpe bizaleli malamu na ye.