Become Jehovah’s Friend—Sing With Us

Yehova nde nkombo na yo (Loyembo 138)

Kumisá nkombo ya Yehova ya lokumu na nzela ya loyembo oyo.

Tózala baninga ya Yehova (Loyembo 28)

Okosepela kozala moninga ya Yehova? Maloba ya loyembo oyo ekosalisa yo oyeba ndenge okoki kosala yango.

Akokómisa yo makasi (Loyembo 38)

Yehova akoki kosalisa yo ozala makasi mpe osala oyo ezali malamu.

Yoká libondeli na ngai (Loyembo 41)

Bondelá Yehova, mpe akoyoka yo ata soki ozali wapi.

Totɔndi yo, Yehova (Loyembo 46)

Mpo na nini opesaka Yehova matɔndi? Tángá mwa bantina yango ntango ozali koyemba maloba ya loyembo oyo.

“Nzela yango oyo” (Loyembo 54)

Ndenge nini okoki koyoka mongongo ya Nzambe mpe kolanda matambe ya Yesu?

Monisá solo (Loyembo 56)

Obandi kosala yango?

“Sakolá Liloba” (Loyembo 67)

Omibongisi mpo na koyemba loyembo oyo elobeli kosakola liloba ya Nzambe?

Pesá biso mpiko (Loyembo 137)

Yehova akoki kopesa yo mpiko mpo okoba koloba na nkombo na ye.

‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’ (Loyembo 95)

Bóyekola maloba ya loyembo yango, na nsima bóyembela yango ndeko moko oyo azali na mosala ya ntango nyonso.

“Ndako na ndako” (Loyembo 83)

Yo mpe okoki kopesa mabɔkɔ na kosakola nsango malamu ya Bokonzi!

Tómipesa (Loyembo 84)

Ezali na lolenge mingi oyo okoki kosalisa basusu.

Yoká, tosá mpe pambwamá (Loyembo 89)

Yembá elongo na Caleb mpe Sofia mpo oyeba ntina oyo kotosa epesaka esengo.

Pambolá makita na biso (Loyembo 20)

Bóyemba elongo mpe bótala ndenge bandeko mosusu basalaka mpo na koyangana na makita mbala na mbala.

Tósala na bomoko (Loyembo 53)

Talá bomoko ya bandeko na biso bakristo na liyangani moko.

Ntina ya esengo na biso (Loyembo 111)

Bantina nini ozali na yango ya kozala na esengo?

Tósalela Yehova na bolenge na biso (Loyembo 133)

Kanisá Mozalisi na yo Monene ntango ozali elenge.

Bana bazali mokumba Nzambe apesi (Loyembo 134)

Oyebaka ete bana bazali likabo ya motuya oyo euti na Nzambe? Yekolá maloba ya loyembo oyo mpo bóyemba yango elongo.

Yehova alobi: “Zalá mayele, mwana na ngai” (Loyembo 135)

Okosala makasi osepelisa motema ya Yehova? Talá video oyo mpo oyeba ndenge oyo okosala yango.

Bomoi ezali likamwisi (Loyembo 141)

Mekámeká loyembo oyo mbala na mbala mpe na nsima okoyeba koyemba yango na Ndako ya Bokonzi.

Bótya miso na libonza! (Loyembo 24)

Wana bozali koyemba loyembo yango, kanisá makambo kitoko oyo ekozala na Paradiso.

Loyembo ya bolongi (Loyembo 132)

Yembá lokola Moize ná Bayisraele loyembo oyo mpo na kokumisa Yehova.