Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bakristo basengeli kozala na mokolo moko mpo na Sabata?

Bakristo basengeli kozala na mokolo moko mpo na Sabata?

Eyano ya Biblia

Bakristo basɛngisami te kotosaka sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ. Bakristo batosaka nde “mobeko ya Kristo,” nzokande yango esɛngi kotosa Sabata te. (Bagalatia 6:2; Bakolose 2:16, 17) Ndenge nini toyebi yango? Ya liboso, tólobela ndenge Sabata ebandaki.

Sabata ezali nini?

Liloba “sabata” euti na liloba moko ya Ebre oyo elimboli “kopema; kotika.” Biblia elobeli Sabata mpo na mbala ya liboso na Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele. (Kobima 16:23) Na ndakisa, mobeko ya minei elobaki boye: “Mpo na kokanisa mokolo ya Sabata mpo na kosantisa yango, okosala mosala mpe osengeli kosala misala na yo nyonso mikolo motoba. Kasi mokolo ya nsambo ezali Sabata mpo na Yehova Nzambe na yo. Osengeli kosala ata mosala moko te.” (Kobima 20:8-10) Sabata ezalaki kobanda mokolo ya mitano, ntango moi elali mpe kosuka mokolo ya pɔsɔ, ntango moi elali. Na ntango yango, Bayisraele basengelaki te kobima na esika oyo bazali, kopelisa mɔtɔ, kolɔkɔta nkoni, to komema mikumba. (Kobima 16:29; 35:3; Mitángo 15:32-36; Yirimia 17:21) Moto oyo abuki mobeko yango azalaki kobomama.​—Kobima 31:15.

Na kalandriye ya Bayuda, mikolo mosusu mpe ezalaki Sabata, na ndakisa mbula ya nsambo mpe mbula ya ntuku mitano. Na bambula yango ya Sabata, esengelaki kosala bilanga te mpo mabele epema; esengelaki mpe te kosɛnga Moyisraele nyongo.​—Balevi 16:29-31; 23:6, 7, 32; 25:4, 11-14; Kolimbola Mibeko 15:1-3.

Mbeka ya Yesu elongolá mobeko ya Sabata

Mpo na nini mobeko ya Sabata etali bakristo te?

Mobeko ya Sabata ezalaki kaka mpo na bato oyo bazalaki kotosa Mibeko mosusu nyonso oyo epesamaki na nzela ya Moize. (Kolimbola Mibeko 5:2, 3; Ezekiele 20:10-12) Ata mokolo moko te Nzambe asɛngaki bato mosusu bázala na mokolo ya Sabata mpo na kopema. Kutu, ata Bayuda ‘balongwaki na Mibeko’ ya Moize, kati na yango Mibeko Zomi, ntango mbeka ya Yesu Kristo epesamaki. (Baroma 7:6, 7; 10:4; Bagalatia 3:24, 25; Baefese 2:15) Bakristo batosaka Mibeko ya Moize te; batosaka nde mobeko mosusu ya malamu koleka: mobeko ya bolingo.—Baroma 13:9, 10; Baebre 8:13.

Makanisi ya bato mpo na Sabata

Makanisi ya bato: Nzambe atyaki Sabata ntango apemaki mokolo ya nsambo.

Likambo ya solo: Biblia elobi: “Nzambe apambolaki mokɔlɔ na nsambo mpe abulisaki yango, mpɔ ete, na mokɔlɔ yango ye apemaki na misala yɔnsɔ mizalisaki ye mpe misalaki ye.” (Ebandeli 2:3, haut fleuve) Vɛrsɛ yango epesi mobeko epai ya moto te, elobeli nde likambo oyo Nzambe asalaki na mokolo ya nsambo ya bozalisi. Biblia elobeli kopema ya Sabata te liboso ya mikolo ya Moize.

Makanisi ya bato: Bayisraele bazalaki na mobeko ya Sabata liboso bázwa Mibeko ya Moize.

Likambo ya solo: Moize ayebisaki Bayisraele boye: “Yehova Nzambe na biso asalaki kondimana ná biso na Horebe,” na Ngomba Sinai. Na kondimana yango nde Nzambe apesaki mobeko ya Sabata. (Kolimbola Mibeko 5:2, 12) Makambo mosusu oyo Bayisraele bazalaki kosala na Sabata emonisi ete ezalaki likambo ya sika mpo na bango. Soki bazalaki na mobeko ya Sabata banda kala, ntango bazalaki na Ezipito, mpo na nini Nzambe alobaki ete Sabata ekobanda kotinda bango bákanisa ndenge balongwaki na boombo na Ezipito? (Kolimbola Mibeko 5:15) Mpo na nini esɛngaki báyebisa bango bálɔkɔtaka mana te mokolo ya nsambo? (Kobima 16:25-30) Mpe mpo na nini bayebaki te etumbu nini bápesa moto ya liboso oyo abukaki mobeko ya Sabata?​—Mitángo 15:32-36.

Makanisi ya bato: Lokola Sabata ezali kondimana ya seko, esengeli kaka kotosa yango.

Likambo ya solo: Babiblia mosusu ebengi Sabata “kondimana ya seko.” (Kobima 31:16, haut fleuve) Kasi, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “ya seko” ekoki mpe kolimbola “ntango oyo etyami ndelo te”; elimbolaka kaka te libela na libela. Na ndakisa, Biblia esaleli mpe liloba yango mpo na kolobela bonganga-nzambe ya Yisraele, nzokande Nzambe asukisaki mokumba yango eleki mbula soki 2 000.​—Kobima 40:15; Baebre 7:11, 12.

Makanisi ya bato: Bakristo basengeli kozala na mokolo ya Sabata mpo Yesu mpe asalaki bongo.

Likambo ya solo: Yesu atosaki Sabata mpo azalaki Moyuda, abotamaki na ekólo oyo etosaka Mibeko ya Moize. (Bagalatia 4:4) Nsima ya liwa ya Yesu, kondimana yango ya Mibeko, ata mpe Sabata, elongwaki.​—Bakolose 2:13, 14.

Makanisi ya bato: Ntoma Paulo azalaki mokristo, kasi azalaki kotosa Sabata.

Likambo ya solo: Ntoma Paulo azalaki kokɔta na basinagoga mokolo ya Sabata, kasi ezalaki te mpo na kosala makambo oyo Bayuda bazalaki kosala. (Misala 13:14; 17:1-3; 18:4) Kasi, na kolanda ndenge makambo ezalaki na ntango wana, azalaki kosakola nsango malamu na basinagoga, mpo bapaya mpe bakokaki kobengama mpo na koloba na esika oyo bato bayangani mpo na losambo. (Misala 13:15, 32) Paulo azalaki kosakola “mokolo na mokolo,” kaka mokolo ya Sabata te.​—Misala 17:17.

Makanisi ya bato: Sabata ya bakristo ezalaka mokolo ya lomingo.

Likambo ya solo: Ata na esika moko te Biblia esɛngi bakristo bátya mokolo ya lomingo mpo na kopema mpe kosambela. Mpo na bakristo ya liboso, mokolo ya lomingo ezalaki kaka lokola mikolo nyonso. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi boye: “Bakómaki kotalela mokolo ya lomingo lokola Sabata na siɛklɛ ya minei, ntango Constantin [amperɛrɛ moko ya Roma oyo azalaki mopakano] apesaki mitindo ete misala mosusu esalemaka te na mokolo ya lomingo.” *

Kasi, tokoloba nini mpo na bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisaka mokolo ya lomingo lokola mokolo moko ya ntina mingi? Biblia elobi ete ntoma Paulo alyaki elongo na bandeko na ye bakristo “na mokolo ya liboso ya pɔsɔ,” mokolo ya lomingo; kasi esengelaki kaka kozala bongo mpo akendaki mokolo oyo elandaki. (Misala 20:7) Ndenge moko mpe, bayebisaki bandeko ya masangá mosusu bátyaka mwa mbongo pembeni “mokolo nyonso ya liboso na pɔsɔ,” mokolo ya lomingo, mpo na kosunga baoyo bazwi likama. Kasi ezalaki kaka mpo na kosalisa moto ayeba kosalela mbongo. Kutu, bazalaki kobomba mbongo yango na bandako, bazalaki komema yango na esika ya makita te.​—1 Bakorinti 16:1, 2.

Makanisi ya bato: Ezali mabe kotya mokolo moko na pɔsɔ mpo na kopema mpe losambo.

Likambo ya solo: Biblia etiki mokristo mokomoko asala ndenge amoni malamu.​—Baroma 14:5.

^ par. 21 Talá mpe buku New Catholic Encyclopedia, Second Edition, Volume 13, lokasa 608.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso?

Yesu amonisaki ntina oyo tozali na mposa ya litambwisi mpe alobelaki mitinda mibale ya Biblia oyo eleki minene.

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezalaki sembo?

Malako minei ya ntina oyo bazuzi bazalaki kolanda na Yisraele.

MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI

Batatoli ya Yehova bazali bakristo?

Talá ntina oyo tokeseni na mangomba mosusu oyo ebengamaka mangomba ya bokristo.