LAMUKÁ! Sanza ya Avril 2015 | Ndenge nini bato bakómi kotalela disiplini?

Emonani lokola ete baboti oyo balingi koteya bana na bango bizaleli malamu bazali kolanda te oyo ekómi kosalema mikolo oyo. Mpo na nini ekómi bongo?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ndenge nini bato bakómi kotalela disiplini?

Lelo oyo baboti bazali kolanda makanisi oyo bato ya mayele babimisaki na bambula ya 1960?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Disiplini oyo esalisaka

Batoli mitano ya Biblia epesi litambwisi oyo ebongi mpo na mabota.

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Honduras

Talá mwa moke ndenge bonkɔkɔ ya bato ya ekólo moko ya Amerika ya ntei ezalaka.

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya kosala ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga

Komiyoka lokola ozangá baninga ezali mabe na sante na yo, ekokani na komɛla makaya 15 na mokolo. Okoki kosala nini mpo omiyoka te lokola basundolá yo mpe ozangá baninga?

BIBLIA ELOBI NINI?

Banyama

Ndenge nini bato basengeli kosalela banyama makambo?

Osalelaka baaparɛyi ya mikolo oyo na mayele?

Yanolá mituna minei oyo mpo na koyeba soki osalelaka yango na mayele.

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mosala oyo mandɛfu ya nyau esalaka

Mpo na nini bato ya siansi bazali kosala barobo oyo ezali na mwa aparɛyi oyo ezali kosala lokola mandɛfu ya nyau?

Makambo mosusu

Nasengeli koyeba nini mpo na masano ya video?

Ekoki kosala yo malamu to mpe kosala yo mabe kozanga ete oyeba yango.

Limbisáká baninga

Osengeli kosala nini soki moto moko asaleli yo mabe?