LAMUKÁ! Sanza ya Juillet 2014 | Oyo okoki kosala soki mpasi ekweli yo

Okosala nini soki okutani na mikakatano makasi?

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Masolo mosusu: esika oyo motángo ya basi oyo bamɛlaka masanga mingi eleki oyo ya mibali, ebele ya bikelamu ya bomoi na esika oyo bomoi ekokaki kozala mpenza te, ekólo moko oyo ezali kofuta bato ya minene oyo bazali kolongola kilo ya nzoto na bango wolo.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Soki mpasi ekweli yo

Biblia ekoki kosalisa yo olonga.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kobungisa biloko ya kobikela

Kei abungisaki biloko na ye nyonso na 2011 na tsunami oyo esalemaki na Japon. Azwaki lisalisi epai ya baninga mpe bibongiseli oyo esungaka bato, kasi vɛrsɛ moko ya Biblia esalisaki ye mingi koleka.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Nzoto ezali lisusu malamu te

Mabel azalaki kosala na lopitalo moko oyo esalaka bato masaje. Nsima ya lipaso oyo basalaki ye na bɔɔngɔ, asengelaki koyika mpiko na mikakatano oyo bato ya maladi oyo azalaki kosalisa bazalaki na yango.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Liwa ya ndeko to moninga

Bato mitano ya libota ya Ronaldo bakufaki na aksida ya motuka eleki sikoyo bambula 16. Atako tii lelo mpota etikalá na motema na ye, azwaki kimya ya motema.

LISALISI MPO NA LIBOTA

Bizaleli oyo osengeli komonisa ntango ozali kotinda to kozwa bamesaje

Ezali kozanga limemya kokata lisolo kaka mpo na kotánga mesaje na telefone? To koboya kokipe mesaje yango kaka mpo na kokoba lisolo ezali mpe kozanga limemya?

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Irlande

Kende kotala bato ya kasakasa ya Esanga Emeraude.

MITUNA-LISOLO

Moto moko ya mayele ya fiziki alobeli kondima na ye

Makambo mibale ya minene oyo amonaki na likoló mpe mabele endimisaki Wenlong He ete Mozalisi azali.

BIBLIA ELOBI NINI?

Lingomba

Biblia emonisi ntina oyo mangomba ezali mingi boye.

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mayele oyo ligorodo oyo ebombaka bana na estoma esalelaka mpo na kobota

Mpo na nini moto moko ya evolisyo alobi ete mbongwana ya malɛmbɛ mpe oyo esalemaka mokemoke na nzoto ya ligorodo yango ezali likanisi oyo ebongi te?

Makambo mosusu

Ndenge nini nakoki kolimbola mateya oyo etali kosangisa nzoto?

Soki batuni yo: ‘Naino osangisá nzoto te?’ okoki kolimbola mateya oyo etali kosangisa nzoto na Biblia?

Bilenge balobelaka makambo etali mbongo

Talá mwa makanisi mpo na ndenge ya kobomba, kosalela mpe kotya mbongo na esika na yango.

Bazwi Moize na ebale

Banani bazali na elilingi? Tángá lisolo ya Biblia oyo ezali na Kobima mokapo 2 mpo na koyeba.