LISOLO 2
“ Oyo azali Mwana na ngai”
(Boumeli: 52:46)
Yoane mobatisi asakoli koya ya masiya. Yesu abandi mosala na ye. Eteni oyo ezali na masolo oyo elandi:
Yoane Mobatisi abandi mosala na ye (Luka 3:1, 2; Yoane 1:6)
Yoane apesi litatoli mpo na pole (Yoane 1:7, 8)
Yoane ateyi makambo etali batisimo (Matai 3:1-12; Luka 3:3-18; Marko 1:1-8)
Batisimo ya Yesu (Matai 3:13-17; Marko 1:9-11; Luka 3:21, 22)
Elimo ememi Yesu na esobe (Marko 1:12, 13; Matai 4:1; Luka 4:1, 2)
Molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Kristo (Luka 3:23-38; Matai 1:1-17)
Yesu atɛmɛli komekama ya Zabolo (Matai 4:2-11; Luka 4:3-13)
Yoane alobi ete azali Kristo te kasi azali mongongo ya moto moko oyo azali koganga na esobe (Yoane 1:19-28)
Yoane ayebisi bato ete Yesu azali “Mwana-Mpate ya Nzambe” (Yoane 1:29-31)
Yoane apesi litatoli mpo na elimo oyo ekiteli Yesu mpe asakoli mpo na batisimo ya elimo santu (Yoane 1:32-34)
Bayekoli ya Yoane balandi Yesu (Yoane 1:35-39)
Andre amemi ndeko na ye Petro epai ya Yesu (Yoane 1:40-42)
Filipe ná Natanaele bakómi bayekoli ya Kristo (Yoane 1:43-51)
Yesu akómisi mai vinyo na fɛti ya libala na Kana, na Galile (Yoane 2:1-12)
Yesu apɛtoli tempelo mpo na mbala ya liboso na Yerusaleme (Yoane 2:13-17)
Yesu ayebisi Bayuda oyo bazalaki kotɛmɛla ye ete akotɛlɛmisa tempelo na mikolo misato (Yoane 2:18-22)
Bato mingi bakómi na kondima epai ya Yesu mpo na makamwisi oyo azali kosala (Yoane 2:23-25)

