23 SANZA YA 7, 2018
NINI BATYE SIKA
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimi na monɔkɔ ya Tok Pisin
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Tok Pisin na mokolo ya 20/07/2018, na Port Moresby, na Papouasie-Nouvelle-Guinée. Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 166, bakisá mpe ya minɔkɔ 13 oyo babongisi lisusu na mobimba na kolanda libongoli ya 2013.

