21 SANZA YA 1, 2019
NINI BATYE SIKA
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimi na monɔkɔ ya Tagalog
Na mokolo ya 20/01/2019, Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Tagalog, na Quezon City, Philippines. Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolami na mobimba to ndambo na minɔkɔ 179, bakisá mpe mabongoli 19 ya Biblia na mobimba to ndambo oyo babongisi lisusu na mobimba na kolanda libongoli ya Anglais oyo babongisaki lisusu na 2013.

