Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Kozwa Babiblia mpe kosalela yango​—Android

Kozwa Babiblia mpe kosalela yango​—Android

Kotánga mpe koyekola Biblia ezali likambo ya libosoliboso na JW Library.

Landá makambo oyo mpo oyeba kozwa mpe kosalela Babiblia:

 Kozwa Biblia

Okoki kozwa Babiblia mpo na kotánga mpe koyekola ntango ozali kosalela Internet te.

  • Fungolá menu, mpe bɛtá esika bakomi Bible mpo omona liste ya mikanda ya Biblia.

  • Bɛtá elembo ya minɔkɔ mpo na komona Babiblia oyo okoki kozwa. Babiblia ya minɔkɔ oyo osalelaka mingi ekozala esika ya liboso. Okoki mpe koluka Biblia moko soki obɛti nkombo ya monɔkɔ to ya Biblia yango. Na ndakisa, bɛtá “int” mpo omona Kingdom Interlinear na Lingelesi to bɛtá “port” mpo omona Babiblia ya Portugais.

  • Babiblia oyo ozwi naino te ezali na elembo ya lipata pene na yango. Bɛtá Biblia moko mpo ozwa yango. Soki Biblia yango ekɔti na aparɛyi na yo, lipata yango ekolimwa. Bɛtá lisusu Biblia yango mpo na kofungola yango.

Soki omoni te Biblia oyo ozali koluka, meká mbala nsima. Babiblia mosusu ekobakisama soki ekɔti na JW library.

 Kolongola Biblia

Okoki kolongola Biblia moko soki mposa na yango esili to mpo aparɛyi na yo etonda na biloko ebele te.

Fungolá menu mpe bɛtá na Bible, na nsima bɛtá elembo ya Minɔkɔ mpo ofungola liste ya Babiblia. Bɛtá madodo misato oyo ezali pene na Biblia oyo olingi kolongola; na nsima bɛtá Supprimer.

 Kozwa mbongwana oyo ekɔti na Biblia

Ntango mosusu bakoki kokɔtisa mwa mbongwana na Biblia oyo osilá kozwa.

Na ntango yango, elembo moko ekobakisama pembeni ya madodo. Soki obɛti Biblia yango, okomona liyebisi oyo elobi ete bakɔtisi mwa mbongwana. Bɛtá Télécharger mpo na kozwa yango, to bɛtá Plus tard mpo okoba kosalela Biblia oyo osilá kozwa.

Makambo yango ebimaki na sanza ya mibale na 2015 na JW Library 1.4, oyo esalaka malamu na aparɛyi Android 2.3 matá. Soki ozali komona yango te, landá malako oyo ezali na lisolo “Bandá kosalela JW Library​—Android,” na motó ya likambo Mpo na Kozwa makambo ya sika.