Lingala
Babiro mpe bavizite: Grece
https://cms-imgp.jw-cdn.org/img/p/1011232/univ/art/1011232_univ_sqr_xl.jpg

Makambo etali babiro na biso mpe kosala vizite

Tosɛngi yo na motema moko oya kotala babiro na biso mpe bamasini na biso ya kobimisa mikanda. Talá ba adrɛsi mpe ngonga ya kosala vizite.

Grèce

Kosɛnga liboso mpo na viziti

Osengeli naino kosɛnga liboso ya kosala viziti? Ee. Mpo bato báleka mingi te mpe mpo basepela na viziti, tosɛngi na bato nyonso oyo balingi kosala vizite, basenga naino liboso, ata soki bazali moke to ebele.

Okoki koya kaka kosala vizite ata soki osɛngaki naino liboso te? Soki oyebisaki liboso te ete okoya kosala vizite, ekoki kozala mpasi mpo tókoka koyamba yo. Mpo lokola esika na biso ezali monene te, tókata motángo ya bato oyo bakoki kosala vizite mokolo na mokolo.

Ntango nini okoki koya mpo na kosala vizite? Mpo na koboya nkaka, tosɛngi yo oya ngonga moko liboso ngonga oyo otyaki mpo na kosala vizite ekoka.

Ndenge nini okoki kosɛnga kosala vizite? Finá esika bakomi “Kosɛnga vizite.”

Okoki kobongola to kolongola mokolo ya viziti na yo? Ee. Finá esika bakomi “Talá to bongola mokolo ya vizite.”

Okosala nini soki bato mosusu esi baponi mikolo oyo olingi kosala vizite? Kotika te kotalaka na site. Soki moto moko abongoli to alongoli mokolo ya vizite na ye, okoki kondimama na esika na ye.

Kosɛnga kosala vizite

Talá to bongola mokolo ya vizite na yo

Vizite

Mpoudoutsi 5

GR-186 48 DRAPETSONA

GRÈCE

+30 210-619-7630

Makambo ya ntina

Tobongolaka Biblia na monɔkɔ ya Greke, na Greke ya braille, na monɔkɔ ya bababa ya Grèce, mpe na monɔkɔ ya Roumanie (ezala na monɔkɔ ya mboka oyo elobamaka na Nord mpe oyo elobamaka na Sud ya Grèce). Totambwisaka mpe mosala ya batatoli ya Yehova na ekólo Grèce mpe ne Chypre.

Zwá mwa buku mpo na vizite