Makambo etali babiro na biso mpe kosala vizite
Tosɛngi yo na motema moko oya kotala babiro na biso mpe bamasini na biso ya kobimisa mikanda. Talá ba adrɛsi mpe ngonga ya kosala vizite.
France
Kopona mokolo ya kosala vizite
Osengeli kaka kopona mokolo liboso ya kosala vizite? Ɛɛ. Mpo bato bátondana te mpe moto nyonso asepela na vizite yango, tosɛngi ete bato nyonso oyo balingi kosala vizite bápona liboso mokolo nini bakosepela kosala vizite ata soki bazali ebele to moke. Poná mokolo oyo okosala vizite pɔsɔ moko liboso. Mpo na bavizite na mikolo ya bafɛti, tolendisi yo opona dati yango mikolo mingi liboso.
Okoki kaka koya kosala vizite ata soki oponi liboso te mokolo ya vizite yango? Soki oponi mokolo liboso te, ekozala mpasi mpo na koyamba yo. Lokola esika ezali monene mingi te, tokoki te koyamba ebele ya bato na mbala moko mokolo na mokolo, kaka motángo oyo esɛngami nde bakosala vizite.
Osengeli kokóma na ngonga nini mpo na kosala vizite? Mpo bato bátondana te, tosɛngi yo okóma ngonga moko liboso ya ngonga oyo otyaki mpo na kosala vizite.
Ndenge nini okoki kopona mokolo ya kosala vizite? Finá butɔ “Poná mokolo ya kosala vizite.”
Okoki kobongola mokolo ya kosala vizite to kolongola yango? Ɛɛ. Finá butɔ “Talá to poná mokolo mosusu ya kosala vizite.”
Bongo soki vizite ezali te na mokolo oyo olingi? Kobá kotalatala site oyo. Mikolo ya kosala vizite etikalaka mpamba soki bato batiki mokolo oyo baponaki mpo na kosala vizite mpe baponi mokolo mosusu to balobi ete bakosala lisusu vizite te.
Poná mokolo ya kosala vizite
Talá to poná mokolo mosusu ya kosala vizite
Vizite
2 rue Saint-Hildevert
27400 LOUVIERS
FRANCE
+33 2-32-25-55-55
Makambo ya ntina
Tobongolaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na ebele ya minɔkɔ. Totambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na France, Maurice, Seychelles mpe na bisanga ya (Guyane, Guadeloupe, Martinique, Mayotte, Réunion, Saint-Barthélemy, Saint-Martin, Saint-Pierre-et-Miquelon).

