LAMUKÁ! No 1 2025 | Oyo okoki kosala ntango ntalo ya biloko ezali komata

Ozali komitungisa ndenge ntalo ya biloko ezali se komata? Ozali kosala mosala makasi mpenza mpe bangonga mingi kaka mpo na kozwa biloko ya kobikela? Ozalaka na ntango mingi te ya kolekisa elongo na baninga mpe bato ya libota na yo? Soki ezali bongo, yebá ete masolo oyo ezali na Lamuká! oyo ekoki kosalisa yo. Epesi makanisi oyo ekosalisa yo ozala mpenza na esengo mpe omitungisaka mingi te. Lisolo ya nsuka epesi elikya ya solosolo mpo na bomoi ya malamu koleka na mikolo ezali koya, elikya yango ekoki kobɔndisa yo uta sikoyo.

 

Yebá ete okoki kobongola makambo te

Koyeba ete ntalo ya biloko ekoki komata ekosalisa yo obongisa makambo ya bomoi na yo.

Salelá mbongo na yo na mayele

Talá batoli mitano oyo ekoki kosalisa yo oyeba kosalela mbongo na yo malamu.

Sepelá na oyo ozali na yango

Yekolá kobika mpe kosepela na mwa moke oyo ozali na yango.

Zalá lobɔkɔ pɛtɛɛ

Ndenge nini kokabela basusu ekoki kosalisa yo oyika mpiko ntango okutani na mikakatano ya mbongo?

Zalá na elikya

Biblia epesi elikya ya kitoko mpenza mpo na mikolo ezali koya​—⁠elikya yango ekoki kobɔndisa yo uta sikoyo.

Luká koyeba makambo mosusu

Biblia ezali kosalisa bato ebele báyeba oyo bakoki kosala ntango ntalo ya biloko ezali komata. Ekoki mpe kosalisa yo.