Lisolo ya mosala ya Yesu

Na video oyo ya biteni ebele, okoyekola makambo etali Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe mpe Mobikisi ya bato.

Lisolo ya mosala ya Yesu​​—Makanisi mokuse ya bavideo

Talá ndenge masolo ya Baevanzile ekómi lisusu kitoko ndenge basali yango na bavideo oyo elobeli Yesu Kristo.

LISOLO 1

Pole ya solosolo ya mokili

Maria ná Yozefe bazwi mokumba kitoko ya kobɔkɔla Yesu, mwana oyo azali lokola bana nyonso te.

LISOLO 2

“ Oyo azali Mwana na ngai”

Yoane mobatisi asakoli koya ya masiya. Yesu abandi mosala na ye.

LISOLO 3

“Nazali ye”

Yesu ateyi Nikodeme, mwasi Mosamaria, mpe bato ya Nazarete. Kasi bango nyonso bataleli nsango na ye ndenge moko te.

LISOLO 4

“Ezali mpo na yango nde nayei”

Yesu abikisi bato ya maladi, abengani bademo, akómisi bato bayekoli, mpe aponi bantoma 12.

LISOLO 5

“Bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya”

Nsima ya kobikisa ebele ya bato, Yesu asali lisolo na ye oyo eyebani mingi—Lisolo likoló ya ngomba.

LISOLO 6

“Yo nde Moto oyo asengelaki koya?”

Yesu asekwisi mwana ya mwasi oyo mobali akufá, asaleli bandakisa ya pɛtɛɛ mpo na koteya, mpe amonisi makanisi ya bato oyo bazali koyoka ye.

Lisolo ya mosala ya Yesu​​—Video ya mokuse ya seri ya bavideo

Talá video ya mokuse ya bavideo oyo ekomisi Baevanzile kitoko koleka.