MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 79-86
Nani moto aleki ntina na bomoi na yo?
Na ntembe mokitani moko ya Asafe, na eleko ya Mokonzi Davidi, nde akomaki Nzembo 83. Loyembo yango ekomamaki ntango bikólo ya banguna bakanelaki basaleli ya Yehova.
Na libondeli na ye, mokomi ya nzembo alobelaki mingi nkombo ya Yehova mpe boyangeli na ye na esika alobela libateli na ye moko
Lelo, basaleli ya Yehova bazali kokutana na makambo ndenge na ndenge. Koyika mpiko mpe kotikala sembo ekokumisa Yehova
Yehova alingi tóyeba nkombo na ye
Makambo oyo tozali kosala esengeli komonisa ete Yehova nde Moto oyo aleki ntina na bomoi na biso