Nzembo 6:1-10
Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga na mongongo ya nse.+ Mondule ya Davidi.
6 Ee Yehova, kopamela ngai na nkanda na yo te,+Mpe kosembola ngai na nkɛlɛ na yo te.+
2 Moniselá ngai boboto, Ee Yehova, mpo nazali kobeba.+Bikisá ngai,+ Ee Yehova, mpo mikuwa na ngai ebulungani.
3 Ɛɛ, molimo na ngai ebulungani mingi mpenza;+Mpe yo, Ee Yehova—kino ntango nini?+
4 Zongá,+ Ee Yehova, bikisá molimo na ngai;+Bikisá ngai mpo na motema boboto na yo.+
5 Mpo na kati ya liwa batángaka nkombo na yo te;+Na kati ya Nkunda* nani akokumisa yo?+
6 Nalɛmbi na kokimela na ngai;+Butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mpisoli;+Nazali kotondisa esika na ngai ya kolala na mpisoli na ngai.+
7 Liso na ngai elɛmbi na mpasi,+Enuni mpo na baoyo nyonso bazali banguna na ngai.+
8 Bólongwa liboso na ngai, bino nyonso baoyo bosalaka makambo oyo eyokisaka mpasi,+Mpo Yehova akoyoka mpenza mongongo ya kolela na ngai.+
9 Yehova akoyoka mpenza lilɔmbɔ na ngai mpo na koluka kondimama;+Yehova ye moko akondima libondeli na ngai.+
10 Banguna na ngai nyonso bakoyoka nsɔni mingi mpenza+ mpe bakobulungana;Bakozonga nsima, bakoyoka nsɔni na mbala moko.+
Maloba na nse
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.