Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 1 2017

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | ENOKA

“Asepelisaki mpenza Nzambe”

“Asepelisaki mpenza Nzambe”

ENOKA azalaki na bomoi eleki sikoyo ebele mpenza ya bambula. Ekoki kozala mpasi tóyeba bomoi oyo azalaki na yango, kasi aumelaki mbula soki 365; elingi koloba bomoi na ye ezalaki molai mbala minei koleka bomoi ya moto oyo aumeli mingi lelo! Kasi azalaki mpenza mokóló te na kotalela ndenge bato bazalaki koumela na mokili na ntango wana. Na ntango wana, oyo esali sikoyo mbula koleka 5 000, bato bazalaki koumela mingi na bomoi koleka lelo. Adama moto ya liboso, azalaki na mbula koleka 600 ntango Enoka abotamaki mpe aumelaki lisusu na bomoi mbula 300 na nsima! Kutu, bana mosusu ya Adama baumelaki mingi koleka. Boye, lokola Enoka azalaki na mbula 365, azalaki naino na makasi na nzoto mpe akokaki koumela lisusu mingi na bomoi. Kasi esalemaki bongo te.

Ekoki kozala ete Enoka azalaki na likama mpenza. Meká komona ndenge azali kokima mpe azali kokoka te kobosana ndenge bato basalaki ntango ayebisaki bango nsango ya Nzambe. Basilikaki mpe bakangaki bilongi. Bato yango bayinaki ye. Batyolaki nsango na ye mpe Nzambe oyo atindaki ye. Bazalaki na likoki te ya kobundisa Yehova Nzambe ya Enoka, kasi bakokaki nde kobundisa Enoka! Mbala mosusu Enoka akómaki komituna soki akomona lisusu bato ya libota na ye. Akanisaki nde mwasi na ye mpe bana na ye ya basi, mwana na ye ya mobali Metusela to nkɔkɔ na ye Lameke? (Ebandeli 5:21-23, 25) Esukaki kaka bongo?

Biblia elobeli makambo mingi te etali Enoka. Elobeli ye na mokuse kaka na bisika misato. (Ebandeli 5:21-24; Baebre 11:5; Yuda 14, 15) Kasi bavɛrsɛ yango ezali na makambo oyo ekoki kosalisa biso tómona na makanisi mobali wana ya kondima makasi. Okokisaka bamposa ya bato ya libota na yo? Ekómelá yo naino te onyokwama mpo ozali kokɔtela likambo oyo oyebi ete ezali malamu? Soki bongo, okoki koyekola makambo mingi na kondima ya Enoka.

“ENOKA AKOBAKI KOTAMBOLA ELONGO NA NZAMBE YA SOLO”

Mokili ezalaki mabe na eleko ya Enoka. Bato yango bazalaki libota ya nsambo ya bana ya Adama. Kutu na ntango wana, bato bazalaki pene ya bomoi ya kokoka oyo Adama ná Eva bazalaki na yango kasi babungisaki. Yango wana bato bazalaki koumela mingi na bomoi. Kasi, bazalaki na bizaleli mabe mpenza mpe bazalaki kotosa Nzambe te. Mobulu ezalaki mingi. Makambo yango ebandaki na libota ya mibale, ntango Kaina abomaki ndeko na ye Abele. Emonani ete moko ya bankɔkɔ ya Kaina amikumisaki ndenge azalaki mobulu koleka Kaina mpe azalaki kozongisa mabe na mabe! Na libota ya misato, mabe mosusu ebimaki. Bato bakómaki kobelela nkombo ya Yehova, kasi te mpo na kosambela ye. Emonani ete bazalaki kotyola nkombo ya Nzambe mpe kozwa yango na limemya te.Ebandeli 4:8, 23-26.

Losambo wana ya mabe epalanganaki mingi na eleko ya Enoka. Ntango Enoka akolaki, asengelaki kopona. Alingaki nde kolanda bizaleli ya bato ya ntango na ye? To alingaki nde koluka Nzambe ya solo Yehova, oyo asalá likoló ná mabele? Mbala mosusu makambo oyo ayebaki mpo na Abele esimbaki motema na ye, mpo babomaki Abele mpo azalaki kosambela Yehova na ndenge oyo ebongi. Enoka azwaki ekateli ya kosala lokola Abele.  Ebandeli 5:22 elobi: “Enoka atambolaki elongo na Nzambe ya solo.” Maloba yango emonisi ete Enoka azalaki kobanga Nzambe na mokili oyo bato bazalaki kobanga Nzambe te. Azali moto ya liboso oyo Biblia elobeli ye bongo.

Kaka vɛrsɛ yango elobi ete Enoka akobaki kotambola elongo na Yehova nsima ya kobota Metusela. Na yango, Enoka azalaki tata ya libota ntango akokisaki mbula soki 65. Azalaki na mwasi, atako Biblia epesi nkombo na ye te, mpe “bana mibali ná bana basi” oyo motángo eyebani te. Soki tata alingi kotambola elongo na Nzambe ntango azali kobɔkɔla bana mpe koleisa libota na ye, asengeli kokipe libota na ye na ndenge oyo Nzambe alingaka. Enoka ayebaki ete Yehova asɛngaki ye azala sembo epai ya mwasi na ye. (Ebandeli 2:24) Mpe asalaki nyonso mpo na koteya bana na ye makambo ya Yehova Nzambe. Yango ebimisaki nini?

Biblia elobi makambo mingi te mpo na ye. Elobi eloko te mpo na kondima ya Metusela, mwana ya Enoka oyo aumelaki mingi na bomoi koleka bato nyonso oyo Biblia elobeli, oyo akufaki na eleko oyo Mpela monene eyaki. Kasi Metusela abotaki mwana moko ya mobali na nkombo Lameke. Ntango Lameke abotamaki, Enoka azalaki na mbula soki 265. Mpe Lameke amonisaki kondima makasi ntango akolaki. Na litambwisi ya elimo santu, Yehova atindaki ye abimisa esakweli oyo etalaki mwana na ye Noa, mpe esakweli yango ekokisamaki nsima ya Mpela. Ndenge moko na Enoka, Noa mpe azalaki moto oyo Biblia elobi ete atambolaki elongo na Nzambe. Noa amoná Enoka te. Kasi Enoka atiká ndakisa malamu mpenza. Mbala mosusu Noa ayebaki makambo ya Enoka epai ya tata na ye Lameke to epai ya nkɔkɔ na ye Metusela to mpe epai ya Yarede, tata ya Enoka oyo akufaki ntango Noa azalaki na mbula 366.Ebandeli 5:25-29; 6:9; 9:1.

Kanisá naino ndenge Enoka akesanaki mpenza na Adama! Atako Adama azalaki moto ya kokoka, asalaki lisumu mpe atikelá bana na ye ezaleli ya botomboki mpe mpasi. Kasi Enoka, atako azalaki moto ya kozanga kokoka, atambolaki elongo na Nzambe mpe atikelá bana na ye ndakisa ya kondima. Adama akufaki ntango Enoka azalaki na mbula 308. Bana mpe bankɔkɔ ya Adama balelaki Adama, moto oyo alukaki kaka matomba na ye moko? Toyebi te. Kasi, Enoka “akobaki kotambola elongo na Nzambe ya solo.”Ebandeli 5:24.

Soki ozali na mikumba ya libota, talelá makambo oyo okoki koyekola na kondima ya Enoka. Atako ezali na ntina koleisa to kolatisa bato ya libota na yo, kasi koteya bango makambo ya Nzambe nde eleki ntina. (1 Timote 5:8) Okokokisa mposa yango kaka na maloba te, kasi mpe na misala. Soki oponi kotambola elongo na Nzambe ndenge Enoka asalaki mpe ozali kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na yo, yo mpe okotikela libota na yo ndakisa malamu mpenza oyo bakolanda.

ENOKA “ASAKOLAKI MPE MPO NA BANGO”

Mbala mosusu lokola azalaki moto ya kondima na mokili oyo bato bazangaki kondima, Enoka azalaki komiyoka lokola azali kaka ye moko. Kasi Yehova, Nzambe na ye, amonaki likambo yango? Ɛɛ, amonaki yango. Mokolo moko, Yehova asololaki na mosaleli na ye wana ya sembo. Nzambe apesaki Enoka nsango moko ya koyebisa bato ya ntango na ye. Na ndenge yango, akómisaki Enoka mosakoli ya liboso oyo nsango na ye ezali na Biblia. Tolobi bongo mpo na litambwisi ya elimo santu, Yuda, leki ya  Yesu, akomaki maloba ya esakweli oyo Enoka asakolaki basiɛklɛ mingi liboso. *

Enoka asakolaki nini? Esakweli yango elobi boye: “Talá! Yehova ayei na bamiriade na ye basantu, mpo na kokata makambo ya bato nyonso, mpe kokweisa baoyo nyonso batyolaka Nzambe mpo na misala na bango nyonso ya kotyola Nzambe oyo basalaki na ndenge ya kotyola Nzambe, mpe mpo na makambo nyonso ya kozokisa oyo basumuki, oyo batyolaka Nzambe, balobaki mpo na ye.” (Yuda 14, 15) Soki otali malamu, okomona ete Enoka alobeli esakweli yango lokola nde likambo moko oyo esalemá, lokola nde Nzambe así asali makambo nyonso oyo esakweli yango elobi. Bisakweli mingi mosusu na nsima elobamá mpe kaka ndenge wana. Yango elingi komonisa ete mosakoli alobeli likambo moko oyo ekosalema mpenza, yango wana alobeli yango lokola nde esí esalemi!Yisaya 46:10.

Enoka asakolaki nsango ya Nzambe na mokili moko mabe

Enoka ayokaki ndenge nini ntango azwaki mokumba ya koyebisa nsango wana ya bitumbu, mbala mosusu kosakola yango epai ya baoyo nyonso bakoyoka? Likebisi yango ezalaki makasi mpenza, esaleli mbala minei mobimba maloba “kotyola Nzambe” mpo na kobimisa polele mabe ya bato yango; misala na bango mpe ndenge bazalaki kosala misala yango ya mabe. Na yango, esakweli yango ekebisaki bato nyonso ete makambo oyo bazali kosala banda babenganá Adama ná Eva na Edene, ezali mabe mpenza. Mokili yango ekosuka mabe mpenza ntango Yehova akoya elongo na “bamiriade na ye basantu”—limpinga ya baanzelu oyo bamibongisi mpo na etumba, mpo na koboma bato yango. Enoka ayebisaki likebisi yango na mpiko nyonso mpe asalaki yango ye moko! Ekoki kozala ete elenge Lameke azalaki komona mpe kokamwa mpiko oyo nkɔkɔ na ye azalaki na yango. Soki ezali bongo, ekoki kokamwisa biso te.

Kondima ya Enoka esengeli kotinda biso tómituna soki totalelaka mokili oyo ndenge Nzambe atalelaka yango. Nsango ya bitumbu oyo Enoka asakolaki na mpiko nyonso etaleli mpe mokili ya lelo kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Enoka. Ndenge likebisi ya Enoka elobaki, Yehova ayeisaki Mpela monene na mokili mabe ya ntango ya Noa. Yango emonisi ete Nzambe akoboma mpe bato mabe na mikolo ezali ekoya. (Matai 24:38, 39; 2 Petro 2:4-6) Ndenge kaka ezalaki na ntango wana, lelo oyo Nzambe ná bamiriade na ye basantu bamibongisi mpo na kopesa etumbu na mokili oyo mabe. Mokomoko na biso asengeli kozwa likebisi ya Enoka na lisɛki te mpe koyebisa yango basusu. Bandeko to baninga na biso bakoki kosundola biso. Na bantango mosusu tokoki komiyoka lokola tozangi bato. Kasi Yehova asundolaki Enoka te, akosundola mpe te basaleli na ye ya sembo lelo oyo!

“AMEMAMAKI ESIKA MOSUSU MPO AMONA LIWA TE”

Bomoi ya Enoka esukaki ndenge nini? Kutu, liwa na ye ekamwisaka mpe ebendaka likebi ya bato koleka bomoi na ye. Mokanda ya Ebandeli, elobi kaka boye: “Enoka akobaki kotambola elongo na Nzambe ya solo. Na nsima azalaki lisusu te, mpo Nzambe akamataki ye.” (Ebandeli 5:24) Ndenge nini Nzambe akamataki Enoka? Na nsima ntoma Paulo akomaki boye: “Na kondima Enoka amemamaki esika mosusu mpo amona liwa te, mpe amonanaki ata esika moko te mpo Nzambe amemaki ye esika mosusu; mpo liboso amemama esika mosusu, azwaki litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe.” (Baebre 11:5) Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete Enoka, “amemamaki esika mosusu mpo amona liwa te”? Mabongoli mosusu ya Biblia elobaka ete Nzambe amemaki Enoka na likoló. Kasi ekoki kozala bongo te. Biblia emonisi ete Yesu Kristo azali moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló.Yoane 3:13.

 Kasi na ndenge nini Enoka “amemamaki” mpo “amona liwa te”? Ekoki kozala ete Yehova asalaki ete akufa na pɛtɛɛ nyonso mpo ayoka ata mpasi moko te ya liwa. Kasi liboso na yango, Enoka azwaki “litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe.” Na ndenge nini? Ekoki kozala ete liboso akufa, Nzambe alakisaki ye paradiso awa na mabele na emonaneli. Nsima ya komona elembo wana oyo emonisaki ete Nzambe andimi ye, Enoka alalaki mpɔngi ya liwa. Ntango ntoma Paulo akomaki na ntina etali Enoka mpe mibali ná basi mosusu ya sembo, alobaki boye: “Bango nyonso bakufaki na kati ya kondima.” (Baebre 11:13) Ekoki kozala ete na nsima, banguna na ye balukaki nzoto na ye kasi “amonanaki ata esika moko te,” ekoki kozala mpo Yehova abombaki yango mpo básambwisa yango te to básalela yango te na losambo ya lokuta. *

Na makanisi wana ya Biblia na motó, tómeka sikoyo komona na makanisi ndenge mbala mosusu bomoi ya Enoka esukaki. Tómeka naino kokanisa boye, kasi tóbosana te ete ezali kaka ndakisa. Enoka azali kokima mbangu, mpe makasi ekómi kosila ye. Banguna bazali kaka kolanda ye, bazali na nkanda mpo na nsango ya bitumbu oyo apesaki. Enoka amoni esika moko oyo akoki kobatama mpo na kopema mwa moke, kasi ayebi ete nsukansuka bakokanga ye kaka. Liwa moko ya nsɔmɔ ezali kozela ye kala mingi te. Ntango azali kopema, abondeli Nzambe na ye. Na nsima, kimya moko makasi ezwi ye. Azwi emonaneli moko oyo ezali komonisa lokola ye moko mpe azali na kati ya likambo yango.

Ekoki kozala ete Enoka alingaki kokufa liwa moko ya nsɔmɔ ntango Yehova akamataki ye

Meká komona ndenge balakisi ye mokili moko oyo ekeseni mpenza na oyo ayebi. Mpo na ye, mokili yango ezali kitoko lokola elanga ya Edene, kasi bakeruba bazalaki te mpo na kobatela yango mpo bato bákɔta te. Ebele ya basi mpe mibali oyo bazali nzoto malamu mpenza bazalaki wana. Bazali na kimya. Koyina to konyokola bato mpo na makambo ya losambo ezalaki te ndenge ye akutanaki na yango. Enoka amonaki mpenza ete Yehova apesaki ye elikya, alingaki ye mpe andimaki ye. Andimisamaki ete esika na ye ezalaki nde wana; ekozala mpenza mboka na ye. Ntango kimya yango ezalaki kokɔtela ye, Enoka akangaki miso mpe mpɔngi moko ya mozindo oyo ezangá ndɔtɔ ezwaki ye.

Mpe tii lelo atikalá kaka na kati ya mpɔngi wana ya liwa, mpe Yehova Nzambe abombá mpenza Enoka na makanisi na ye oyo ezangi ndelo! Ndenge Yesu alakaki, mokolo moko baoyo nyonso bazali na makanisi ya Nzambe bakoyoka mongongo ya Kristo mpe bakobima na malita, bakomona mokili moko ya sika oyo ezali kitoko mpe na kimya.Yoane 5:28, 29.

Okosepela kozala kuna? Kanisá esengo okoyoka ntango okokutana na Enoka. Kanisá makambo kitoko oyo tokoyekola epai na ye! Akoyebisa biso soki makambo oyo tokanisi mpo na ndenge bomoi na ye esukaki ezalaki mpenza solo. Kasi ezali na eloko moko oyo tosengeli koyekola epai na ye sikoyo. Nsima ya kolobela Enoka, Paulo abakisaki boye: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa ye [Nzambe] ata moke te.” (Baebre 11:6) Yango mpenza nde esengeli kotinda mokomoko na biso amekola mpiko mpe kondima ya Enoka!

^ par. 14 Bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia balobaka ete Yuda atángaki maloba ya buku moko boye oyo babengi Buku ya Enoka, kasi buku yango ezali kaka buku moko ya masapo oyo esika eutá eyebani te, mpe bakosaka ete ezali ya Enoka. Buku yango etángi esakweli ya Enoka kaka ndenge asakolaki, kasi mbala mosusu bazwaki maloba yango na buku moko ya kala oyo ebungá to babɛtɛlaká bango lisolo yango. Ekoki kozala ete Yuda asalelaki kaka buku moko wana to Yesu nde ayebisaki ye makambo etali Enoka mpo liboso Yesu aya awa na mabele, amonaki bomoi ya Enoka.

^ par. 20 Ndenge moko mpe, ekoki kozala ete Nzambe asalaki ete nzoto ya Moize mpe ya Yesu básala yango mpe bongo te.Kolimbola Mibeko 34:5, 6; Luka 24:3-6; Yuda 9.