Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Décembre 2015

Petro azalaki nde pápa ya liboso?

Petro azalaki nde pápa ya liboso?

“Baponaki Kardinale Jorge Mario Bergoglio pápa ya mbala ya 265 nsima ya Petro.”​—VATICAN INFORMATION SERVICE, VATICAN CITY, 13/03/2013.

“Episkɔpɔ ya Roma azali na bokonzi likoló ya Lingomba mobimba mpo azali mokitani ya Santu Petro, oyo azwaki bokonzi yango epai ya Yesu Kristo.”​—THE PRIMACY OF THE BISHOP OF ROME DURING THE FIRST THREE CENTURIES, 1903, BY VINCENT ERMONI.

“Soki na nsima, moto moko alobi . . . ete pápa ya Roma azali mokitani ya Petro te na ebonga oyo; [bábenga ye mopɛngwi].”​—LIKITA MONENE YA VATICAN I, 18/07/1870.

MPO NA bamilio ya Bakatolike na mokili mobimba, mobeko oyo likita ya liboso ya Vatican ebimisaki na 1870 ezali liteya oyo ekoki kobongwana te mpe bato basengeli kotosa yango. Kasi, motuna yango oyo, liteya yango euti na Makomami? Longola yango, Pápa Francis azali mpenza mokitani ya ntoma Petro? Petro azalaki nde pápa ya liboso?

“O LIBÁNGÁ LIYE NAKOTÓNGA EKLÉZYA YA NGÁÍ”

Mobeko ya likita ya Vatican ya 1870 eutaki libosoliboso na ndenge oyo balimbolaki Matai 16:16-19 mpe Yoane 21:15-17. Lisolo ya Yesu ná Petro oyo totángaka na bavɛrsɛ yango mpe masolo mosusu ya Biblia emonisi ete na ebandeli ya lisangá ya bokristo ntoma Petro azwaki mokumba moko ya ntina mingi. Kutu, mbala ya liboso oyo Yesu akutanaki na Petro, alobaki ete Petro akomonisa bizaleli oyo ezali lokola libanga na bomoi na ye. (Yoane 1:42) Kristo apesaki nde Petro bokonzi?

Na Matai 16:17, 18, tokokuta maloba oyo ya Yesu epai ya Petro: “Ngáí nayébísí yǒ: Nkómbó ya yǒ Pétro, [oyo nkombo yango elimboli “eteni ya libanga”]; mpé o libángá liye nakotónga Eklézya ya ngáí.” * Yesu alingaki nde koloba ete “eglize,” to lisangá na ye elingaki kotongama likoló ya Petro oyo azali kaka moto? Petro asengelaki nde kozala mokonzi ya bayekoli mosusu nyonso ya Yesu? Bantoma mosusu oyo bazalaki wana ntango Yesu azali koloba na Petro batalelaki maloba yango ndenge nini? Baevanzile emonisi ete na nsima, na mabaku mingi bawelanaki mpo na koyeba nani aleki baninga. (Matai 20:20-27; Marko 9:33-35; Luka 22:24-26) Soki Yesu apesaki Petro bokonzi, balingaki koluka koyeba soki ntoma nani aleki bantoma mosusu?

Petro atalelaki maloba wana ya Yesu ndenge nini? Lokola Petro azalaki Moyisraele, amesanaki na bisakweli ndenge na ndenge ya Makomami ya  Ebre oyo elobelaki “libanga” to “libanga ya litumu.” (Yisaya 8:13, 14; 28:16; Zekaria 3:9) Ntango alobelaki moko na yango na mokanda oyo atindelaki baninga na ye bakristo, Petro alimbolaki ete “libanga ya litumu” oyo esakolamaki ezalaki Nkolo Yesu Kristo, Masiya. Petro asalelaki liloba ya Grɛki pe’tra (liloba yango ezali mpe na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 16:18) kaka mpo na Kristo.​—1 Petro 2:4-8.

Ntoma Paulo azalaki moyekoli mosusu ya sembo ya Yesu. Paulo andimaki ete Yesu apesaki Petro bokonzi? Mpo na komonisa ete andimaki esika ya Petro na lisangá ya liboso ya bokristo, Paulo akomaki ete Petro azalaki na kati ya baoyo “bazalí lokóla bakonzi ba Eklézya.” Mpo na Paulo ‘mokonzi ya Eklézya’ azalaki kaka moko te. (Bagalatia 2:9) Lisusu, soki Yesu atyaki Petro mokonzi ya lisangá, ndenge nini akoki kozala lokóla kaka, elingi koloba, kaka lokola mokonzi ya Eklézya ndenge baninga na ye bakristo bazalaki kotalela ye?

Ntango akomaki mwa mabunga ya Petro na ndenge na ye ya kosalela bato makambo, na limemya nyonso kasi na polele, Paulo alobaki boye: “Nabóyákí kondimela yě o míso ma bato mpô asálákí mabe.” (Bagalatia 2:11-14) Paulo akanisaki te ete Kristo atongaki eglize to lisangá na ye likoló ya Petro to moto mosusu nyonso ya kozanga kokoka. Kutu, andimaki ete lisangá etongamaki nde likoló ya Yesu Kristo oyo abandisaki yango. Mpo na Paulo, “libángá lyangó, ndé Krístu.”​—1 Bakorinti 3:9-11; 10:4.

“NKÓMBÓ YA YǑ PÉTRO . . .”

Ndenge nini tokoki kokanga ntina ya maloba: “Nkómbó ya yǒ Pétro; mpé o libángá liye nakotónga Eklézya ya ngáí”? Mpo na kokanga ntina ya maloba ya vɛrsɛ moko malamumalamu, ebongi kotánga yango na mobimba. Yesu ná Petro bazalaki kolobela nini? Yesu autaki kotuna bayekoli na ye boye: “Bínó bokanísí ’te ngáí náni?” Kozanga  kokakatana, Petro ayanolaki boye: “Ozalí Krístu, Mwána wa Nzámbe wa bomoi.” Yesu apesaki Petro longonya mpo na eyano yango mpe na nsima abakisaki ete akotonga “Eklézya,” to lisangá na “libángá” ya makasi koleka, oyo Petro auti komonisa kondima; elingi koloba Yesu ye moko.​—Matai 16:15-18.

Maloba oyo ya Yesu: “Nkómbó ya yǒ Pétro; mpé o libángá liye nakotónga Eklézya ya ngáí” elimboli nini?

Na boyokani na likanisi yango, ebele ya “Batata ya Lingomba” bakomaki ete libanga oyo Matai 16:18 elobeli ezali Kristo. Na ndakisa, na siɛklɛ ya mitano, Augustin, akomaki boye: “Nkolo alobaki boye: ‘Na libanga oyo nakotonga eglize na ngai,’ mpo Petro ayebisaki ye boye: ‘Yo ozali Kristo Mwana ya Nzambe ya bomoi.’ Na yango, ezali na libanga oyo ondimeli, nde nakotonga eglize na ngai.” Augustin alobaki mbala na mbala ete “Libanga (Petra) yango ezalaki Kristo.”

Balingaki kobenga Augustin mpe bato mosusu bapɛngwi soki básambisaka bango na kolanda mateya ya lelo ya Katolike. Kutu mpo na Ulrich Luz, moto moko ya teoloji ya ekólo Suisse, ndenge oyo bato ya mayele na makambo ya Biblia bazali na likanisi moko na likambo yango lelo oyo, mbɛlɛ likita ya Vatican ya 1870 ebengaki bango bapɛngwi.

PÁPA AZALI MOKITANI YA PETRO?

Petro ayebaki titre “pápa” te. Kutu, tii na siɛklɛ ya 9, baepiskɔpɔ mingi oyo bazalaki Baroma te bazalaki komibenga na titre wana. Ata bongo, tii na nsuka ya siɛklɛ ya 11, bazalaki kosalela yango mpenza te lokola titre oyo eyebani. Kutu, mokristo moko te ya siɛklɛ ya liboso akanisaki ete bokonzi oyo balobi ete bapesaki Petro ekendaki epai ya bato mosusu oyo bayaki nsima ya Petro. Yango wana, Martin Hengel, moto moko ya mayele na Allemagne alobaki ete ezali “na eloko moko te ezala na istware to na teoloji emonisi mpenza esika ‘bokonzi’ ya pápa eutá.”

Na mokuse: Petro azalaki pápa ya liboso te. Azalaki mpe na bakitani te. Liteya ya Katolike oyo etali bokonzi ya pápa euti mpe na Makomami te. Ata bongo, toyebi mpenza ete Yesu atongaki eglize na ye to lisangá ya solo likoló na ye moko. (Baefese 2:20) Motuna ya ntina oyo mokomoko asengeli komituna yango oyo: Ngai, nayebi lisangá yango ya solo?

^ par. 8 Bavɛrsɛ nyonso oyo totángi na lisolo oyo euti na Biblia Liloba Lya Nzambe.