PANAYIOTA akolá na esanga moko ya Mediterane. Ntango azalaki elenge, akómaki kosepela na politiki. Na nsima akómaki sɛkrɛtɛrɛ ya parti politiki moko na mboka oyo azalaki kofanda. Azalaki kutu kokende ndako na ndako mpo na kokɔngɔla mbongo ya parti na bango mpo ekóma mingi. Nsima ya mikolo, Panayiota alɛmbaki nzoto. Kopesa mikumba kaka epai ya bandeko ya libota, koluka lokumu, matata mpe likunya ezalaki ntango nyonso atako bato ya parti yango bazalaki kobéngana baninga.

Daniel akolá na Irlande, na libota oyo bato bamipesaka mpenza na losambo. Kasi likambo ya mawa, abosanaka te bokosi ya basango oyo bazalaki komɛla masanga mingi, kobɛta masano ya mbongo mpe koyiba mbongo na basaani ya mabonza, atako bazalaki koteya ete soki moto asali lisumu akokende na lifelo.

Jeffery alekisaki ntango mingi ya bomoi na ye na kosalela bankolo kompanyi ya masuwa na Royaume-Uni mpe États-Unis bapiblisite mpe kotɛkela bango biloko. Abosanaka te ndenge mbala mingi, bakiliya mpe bato ya bakompanyi mosusu ya masuwa bazalaki kosalela kanyaka ntango bazalaki kosolola na bakonzi ya Leta. Na bokosi nyonso, bazalaki koloba lokuta mpo na kobatela bakɔntra na bango.

Likambo ya mawa, makambo ya ndenge wana esalemaka mingi. Lelo oyo, bokosi ezangaka te na misala nyonso oyo bato basalaka; na ndakisa na makambo ya politiki, ya mangomba mpe ya mimbongo. Liloba ya Grɛki oyo babongoli yango na lingala “mokosi” elimboli molobi to moto ya teyatre oyo mbala mingi alataka masque. Na nsima, bakómaki kosalela liloba yango mpo na kobenga moto nyonso oyo azali kosala likambo moko boye mpo na kokosa bato mosusu to mpo na kokokisa bamposa na ye moko.

Soki basaleli moto makambo na bokosi, moto yango akoki koyoka mabe, nkanda to kobomba nkanda na motema. Baoyo bakutani na likambo yango bakoki komituna boye: “Bokosi ekosila mokolo mosusu?” Likambo ya esengo, Liloba ya Nzambe esalisi biso tóndima ete ekosila.

NDENGE NZAMBE NÁ MWANA NA YE BATALELAKA BOKOSI

Biblia elobi ete bokosi ebandaki nde epai ya ekelamu moko ya elimo kasi epai ya bato te. Na ebandeli mpenza, Satana Zabolo asalelaki nyoka lokola masque mpe amibimisaki lokola moto malamu mpo na kokosa Eva, mwasi ya liboso. (Ebandeli 3:1-5) Banda wana, bato mingi mpe bakómá kosala bongo, kobomba bomoto na bango mpo na kokosa basusu mpe kokokisa bamposa na bango moko.

Ntango ekólo Yisraele ekweaki na motambo ya losambo ya lokuta mpe bokosi na makambo ya Nzambe, mbala na mbala Nzambe azalaki kokebisa bango  mpo na makama oyo yango ekobimisa. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova Nzambe alobaki boye: “Bato oyo babɛlɛmi na ngai na monɔkɔ na bango, mpe bakumisi ngai kaka na mbɛbu na bango, mpe batye motema na bango mosika na ngai.” (Yisaya 29:13) Ntango ekólo yango eboyaki kobongwana, Nzambe atikaki ete bikólo ya bapaya ebebisa Yerusaleme ná tempelo na yango, esika ya losambo ya Bayisraele. Liboso, bato ya Babilone nde babebisaki yango na mobu 607 liboso ya ntango na biso mpe na nsima na mobu 70 ya ntango na biso na basoda ya Roma. Emonani polele ete Nzambe atikaka te ete bokosi ezala mpo na libela.

Kasi, Nzambe ná Mwana na ye Yesu bazwaka na valɛrɛ bato oyo bazalaka sembo mpe na bokosi te. Na ndakisa, na ebandeli mpenza ya mosala ya Yesu, mobali moko na nkombo Natanaele ayaki epai na ye. Ntango Yesu amonaki ye, alobaki boye: “Talá, Moyisraele ya solosolo, oyo azali na bokosi te.” (Yoane 1:47) Natanaele, oyo ayebanaki mpe na nkombo Bartelemi, akómaki moko ya bantoma 12 ya Yesu.​—Luka 6:13-16.

Yesu alekisaki ntango elongo na bayekoli na ye mpe ateyaki bango ndenge oyo Nzambe akanisaka. Bokosi esengelaki te kozala na kati na bango. Mpo na kokebisa bango, Yesu atɛmɛlaki makasi makambo ya bokosi oyo bakonzi ya mangomba ya ntango wana bazalaki kosala. Tótalela mwa makambo yango.

Bazalaki kosala “boyengebene” na ndenge ya kolakisa na lolendo biloko na bango ya kobikela. Yesu ayebisaki bayoki na ye boye: “Bókeba mpenza ete bósala makambo na bino ya boyengebene na miso ya bato te mpo bango bámona bino . . . ndenge bakosi basalaka.” Ayebisaki bango mpe bápesaka makabo ya motema mawa na ndenge ya “kobombana,” to kozanga ete basusu báyeba. Basengeli kobondela na esika ya kobombana, kozanga ete basusu bámona bango. Na ndenge yango, losambo na bango ekozala ya lokuta te mpe Tata na ye akosepela na yango.​—Matai 6:1-6.

Bazalaki kowela koloba mabe mpo na basusu. Yesu alobaki boye: “Mokosi! Liboso longolá libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi na liso ya ndeko na yo.” (Matai 7:5) Soki moto azali kotala kaka mabunga ya basusu nzokande oyo ya ye moko ezali minene, azali kobomba bomoto na ye. Mpo na koloba solo, “bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.”​—Baroma 3:23.

Bazalaki na makanisi ya mabe. Mokolo moko, bayekoli ya Bafarisai mpe bato ya parti ya Erode bayaki kotuna Yesu motuna etali kofuta mpako. Na maloba sukali, balobaki na Yesu boye: “Moteyi, toyebi ete yo olobaka solo mpe oteyaka nzela ya Nzambe na bosolo.” Na nsima, mpo na kotyela ye motambo, batunaki ye motuna oyo: “Esengeli kofuta Kaisala mpako oyo moto nyonso afutaka to te?” Yesu ayanolaki boye: “Bakosi, mpo na nini bozali komeka ngai?” Ebongaki mpenza Yesu abenga bango bakosi mpo bazalaki koluka te eyano na motuna na bango kasi nde mpo “bázwa ye na maloba na ye.”​—Matai 22:15-22.

Bakristo ya solo bamonisaka “bolingo oyo euti na motema ya pɛto mpe na lisosoli ya malamu mpe na kondima oyo ezali na bokosi te.”​—1 TIMOTE 1:5

Ntango lisangá ya bokristo esalemaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, bakristo basalaki makasi mpo solo mpe bosembo ezwa esika. Bakristo ya solo basalaki nyonso mpo bizaleli na bango ezala na bokosi te. Na ndakisa, Petro, moko ya bantoma 12, alendisaki baninga na ye bakristo ‘bátosaka solo mpe bázala na bolingo ya bondeko oyo ezali na bokosi te.’ (1 Petro 1:22) Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bakristo ete bázalaka na “bolingo oyo euti na motema ya pɛto mpe na lisosoli ya malamu mpe na kondima oyo ezali na bokosi te.”​—1 Timote 1:5.

NGUYA YA LILOBA YA NZAMBE

Mateya ya Yesu mpe ya bantoma oyo ezali na Biblia esalisaka lelo kaka ndenge esalisaki na siɛklɛ ya liboso. Mpo na yango, ntoma Paulo akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki  kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebre 4:12) Koyeba mateya ya Biblia mpe kosala nyonso mpo na kosalela yango, esalisi bato mingi bátika ezaleli ya bokosi mpe bázala sembo mpe bálobaka solo. Tótalela makambo oyo bato misato oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo bakutanaki na yango.

“Namonaki bolingo ya solosolo mpe likebi oyo bazalaki kotyelana.”​—PANAYIOTA

Panayiota akutanaki na likambo oyo ebongolaki bomoi na ye ntango andimaki kokende na losambo ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi. Kuna, amonaki te bato bazali komonisa bosembo koleka ndelo mpo na kokamwisa basusu. Alobi boye: “Namonaki bolingo ya solosolo mpe likebi oyo bazalaki kotyelana, likambo oyo namonaki te bambula nyonso oyo nalekisaki na politiki.”

Panayiota akómaki koyekola Biblia mpe asalaki milende tii azwaki batisimo, eleki sikoyo mbula 30. Alobi sikoyo boye: “Bomoi na ngai ekómaki mpenza na ntina ntango nakómaki kosakola Bokonzi ya Nzambe, nzela kaka moko oyo tokoki kozala na mokili ya sembo, kasi te kotambola ndako na ndako mpo na kolobela parti politiki na biso ndenge nazalaki kosala.”

“Naboyaki komonana moto malamu na miso ya bandeko ya lisangá nzokande nazalaki bongo te.”​—DANIEL

Daniel akendaki liboso na makambo ya Nzambe na lisangá mpe bapesaki ye mwa mikumba. Mwa bambula na nsima, asalaki libunga moko mpe lisosoli ekómaki kotungisa ye. Alobaki boye: “Lokola nabosanaki te bokosi oyo namonaki na lingomba na ngai ya kala mwa bambula liboso, namonaki ete likambo mosusu ya kosala ezali te kaka kotika mikumba na ngai. Naboyaki komonana moto malamu na miso ya bandeko ya lisangá nzokande nazalaki bongo te.”

Likambo ya esengo, na nsima, ntango abongisaki makambo, Daniel amonaki ete akokaki kozongela lisusu mikumba na ye na lisosoli ya pɛto mpe na esengo nyonso andimaki lisusu kozwa mikumba na lisangá. Bosembo ya ndenge wana ezalaka epai ya baoyo basalelaka Nzambe na bokosi te. Bayekolaka ‘kolongola libaya ya motɔndɔ’ na liso na bango moko liboso báluka ‘kolongola lititi’ na miso ya bandeko na bango.

“Namonaki ete ebongi natika kokosa bato na maloba sukali ndenge nazalaki kosala, . . . etungisaki lisosoli na ngai.”​—JEFFERY

Jeffery, oyo alekisaki bomoi na ye na mosala ya mombongo, alobaki boye: “Ntango boyebi na ngai ya Biblia ebakisamaki, namonaki ete ebongi natika kokosa bato na maloba sukali ndenge nazalaki kosala mpo na kozwa kɔntra. Bavɛrsɛ lokola Masese 11:1, oyo elobi ete ‘emekeli-kilo ya bokosi ezali eloko oyo Yehova ayiná,’ etungisaki lisosoli na ngai.” Na kokesana na baoyo batunaki Yesu motuna etali kofuta mpako, Jeffery ayekolaki ndenge ya kosalela bandeko na ye bakristo mpe bato mosusu makambo na makanisi ya mabe te.

Bamilio ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basalaka nyonso mpo na kosalela makambo oyo bayekolaka na Biblia. Basalaka nyonso ‘bálata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.’ (Baefese 4:24) Tolendisi yo oluka koyeba soki Batatoli ya Yehova bazali banani, mateya oyo bandimaka mpe ndenge oyo bakoki kosalisa yo oyekola makambo etali mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Kuna “boyengebene ekozala” mpe bokosi ekosila.​—2 Petro 3:13.