Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Novembre 2015

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | TIMOTE

“Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”

“Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”

TIMOTE atiki ndako na bango mosika mpe azali na nzela ya mobembo, na esengo nyonso, atye makanisi na makambo oyo ezali kozela ye. Baninga na ye bazali liboso ntango bazali kokatisa teritware oyo Timote ayebi malamu. Malɛmbɛmalɛmbɛ batiki Listra mosika, engumba oyo ezali likoló ya mwa ngomba oyo ezali na lobwaku. Timote asɛki mwa moke ntango akanisi ndenge mama mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi basepelaki atako baboyaki kolakisa mawa na bango polele ntango atikaki bango. Akobaluka mpo na kopɛpa bango mbote mpo na mbala ya nsuka?

Ntoma Paulo azali kotala Timote mbala na mbala na mwa kosɛka mpo na kolendisa ye. Ayebaki ete Timote asengelaki kolongola mwa nsɔni oyo azalaki na yango, kasi asepelaki ndenge elenge mobali yango azalaki na esengo. Timote azalaki naino elenge, ekoki kozala azalaki na mbula soki 20 mpe azalaki komemya mpe kolinga Paulo mingi. Sikoyo Timote alandaki mobali yango ya mpiko mpe ya sembo na mobembo moko oyo esɛngaki bátambola ebele ya bakilomɛtrɛ mosika na ndako na bango. Basalaki mobembo yango na makolo mpe na masuwa mpe bakutanaki na makama ndenge na ndenge na nzela. Timote ayebaki mpenza te soki akozonga lisusu na ndako na bango.

Nini etindaki elenge yango andima kotambwisa bomoi na ye ndenge wana? Mbano nini ekoki kotinda moto andima kosala likambo ya ndenge wana? Mpe ndenge nini kondima ya Timote ekoki kolendisa kondima na biso?

“BANDA BOMWANA”

Tózonga naino mbula mibale to misato na nsima mpe tósala lokola ete Listra ezalaki engumba ya Timote ndenge emonani. Ezalaki mwa engumba moko ya mosika oyo ezangi mindɔndɔ, na kati ya lobwaku oyo ezalaki na mai mingi. Ekoki kozala ete bato na yango bayebaki monɔkɔ ya Grɛki kasi bazalaki kaka koloba Likaonia, monɔkɔ ya mboka na bango. Mokolo moko, loyenge ekɔtaki na engumba yango. Bakristo mibale, ntoma Paulo ná moninga na ye ya mobembo Barnabasi oyo bazalaki bamisionɛrɛ bakómaki na Ikoniumu, engumba moko monene oyo ezalaki pene wana. Ntango bazalaki kosakola na esika ya bato nyonso, Paulo amonaki mobali moko motɛngumi oyo amonisaki ete azalaki na kondima ya solosolo. Yango wana, Paulo abikisaki mobali yango na likamwisi!​—Misala 14:5-10.

Emonani ete bato mingi ya Listra bazalaki kondima masapo ya mboka na bango etali banzambe oyo bazalaki kobongwana bato mpe koya na etúká yango na ntango ya kala. Yango wana bakanisaki ete Paulo azali Hermesi mpe Barnabasi nde Zeusi! Ezalaki mpasi mpo bakristo yango mibale ya komikitisa bápekisa bato yango kopesa bango mbeka.​—Misala 14:11-18.

Ata bongo, mwa ndambo ya bato ya Listra bamonaki ete bazalaki nde bato mpe bamemelaki bango nsango moko kitoko mpenza, kasi te banzambe ya bapakano oyo masapo elobelá. Na ndakisa, Enise, mwasi moko Moyuda oyo mobali na ye azalaki Mogrɛki, * ná mama na ye Loisi bayokaki na likebi mpenza mpe na esengo makambo oyo Paulo ná Barnabasi balobaki. Nsango yango ezalaki oyo Moyuda nyonso ya sembo azalaki na mposa ya koyoka​—Masiya ayaki mpe akokisaki bisakweli mingi oyo ekomamaki mpo na ye na Makomami!

Kanisá naino ndenge mobembo wana ya Paulo esimbaki motema ya Timote. Balakisaki Timote  “banda bomwana” ete alingaka makomi mosantu ya Makomami ya Ebre. (2 Timote 3:15) Ndenge moko na mama mpe nkɔkɔ na ye, Timote akokaki komona ete makambo oyo Paulo ná Barnabasi balobaki mpo na Masiya ezalaki solo. Kanisá mpe motɛngumi oyo Paulo abikisaki. Na ntembe te, banda bomwana, Timote azalaki komona mobali yango mbala mingi na babalabala ya Listra. Sikoyo, mpo na mbala ya liboso, Timote amonaki mobali yango akómi kotambola! Tokoki kokamwa te soki Enisi na Loisi bakómaki bakristo ndenge Timote mpe akomaki mokristo. Tii lelo, bankɔkɔ mpe baboti bakoki koyekola makambo mingi na ntina na Loisi mpe Enisi. Okoki kozala ndakisa malamu mpo na bilenge?

“NA NZELA YA MALƆZI MINGI”

Baoyo bakómaki bayekoli ya Kristo na Listra basepelaki mpenza ntango bayebaki elikya oyo bazalaki na yango. Kasi bayekolaki mpe ete kokóma moyekoli ekosɛnga komipimela. Bayuda oyo bazalaki batɛmɛli, bautaki na Ikoniumu mpe Antiokia bayaki na engumba yango mpe batindaki bato ya Listra bátombokela Paulo ná Barnabasi. Mwa liboso, ebele ya bato ya mobulu balandaki Paulo mpe babambaki ye mabanga. Lokola babɛtabɛtaki ye, akweaki na mabele. Bato yango babimisaki ye libándá ya engumba mpe bakanisaki ete akufi.​—Misala 14:19.

Kasi, bayekoli na Listra bayaki esika Paulo azalaki mpe bazingaki ye. Motema na bango ekitaki ntango aminyolisaki, atɛlɛmaki mpe na nsima na mpiko nyonso azongaki mbala moko na Listra! Mokolo oyo elandaki, ye ná Barnabasi balongwaki wana mpe bakendaki na engumba Derbe mpo na kokoba mosala na bango ya kosakola. Nsima ya kokómisa bato ya sika bayekoli kuna, bazongaki lisusu na Listra kozanga kobanga likama. Mpo na nini? Lisolo yango elobi ete mpo na “kopesa milimo ya bayekoli makasi,” mpe “kolendisa bango ete bátikala na kati ya kondima.” Meká naino komona ndenge elenge Timote afungolaki miso mpe azalaki koyoka ndenge Paulo ná Barnabasi bazalaki koteya bakristo yango ete mpasi oyo bazalaki komona ezalaki ya mpamba te na kotalela elikya ya nkembo oyo bazalaki na yango mpo na mikolo ezali koya. Balobaki boye: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.”​—Misala 14:20-22.

Timote andimaki mateya ya Ntoma Paulo na motema mobimba

Timote amonaki ndenge Paulo asalelaki makambo oyo alobaki, na mpiko nyonso abangaki minyoko te mpo na kosakwela basusu nsango malamu. Na yango, Timote ayebaki ete soki alandi ndakisa ya Paulo, bato ya Listra bakotɛmɛla ye; ata mpe tata na ye moko. Kasi Timote atikaki te ete makambo yango epekisa ye kozwa ekateli ya kosalela Nzambe. Lelo oyo, ezali na bilenge mingi lokola Timote. Na bwanya nyonso, balukaka baninga oyo bazali na kondima makasi, oyo bakolendisa mpe bakopesa bango mpiko. Mpe batikaka te ete botɛmɛli epekisa bango kosalela Nzambe ya solo!

 ‘BANDEKO BAZALAKI KOLOBA MALAMU MPO NA YE’

Ndenge tolobelaki yango liboso, Paulo asalaki mobembo na ye ya mibale mbula mibale to misato na nsima. Meká naino komona esengo oyo bato ya libota ya Timote bayokaki ntango Paulo ayaki na ndako na bango, na mbala oyo ná Silasi. Na ntembe te, ezalaki mpe ntango moko ya esengo mpenza mpo na Paulo. Amonaki matomba oyo makambo ateyaki ebimisaki na Listra. Loisi ná mwana na ye Enisi, oyo bakómaki sikoyo basi bakristo ya sembo, batondaki na ‘kondima oyo ezangi bokosi,’ oyo Paulo azalaki kosepela na yango. (2 Timote 1:5) Bongo elenge Timote?

Paulo azwaki nsango ete banda mobembo ya liboso oyo asalaki, elenge mobali yango amipesaki lisusu mingi na makambo ya Nzambe. “Bazalaki koloba malamu” ya Timote kaka na Listra te, kasi mpe na Ikoniumu, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 32 na nɔrdi-ɛsti. (Misala 16:2) Asalaki nini mpo bálobela ye bongo?

“Makomi mosantu” oyo mama ná nkɔkɔ ya Timote bateyaki ye “banda bomwana” ezalaki mpe na batoli oyo ebongi mpo na bilenge. (2 Timote 3:15) Na ndakisa: “Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.” (Mosakoli 12:1) Timote akangaki mpenza ntina ya maloba yango ntango akómaki mokristo. Amonaki ete ndenge malamu ya kokanisa Mozalisi na ye Monene ezali mpe ya kosakwela basusu nsango malamu etali Kristo, Mwana ya Nzambe. Mokemoke, Timote alongolaki ezaleli na ye ya nsɔninsɔni oyo ezalaki kozongisa ye nsima mpe akómaki na mpiko ya koyebisa basusu nsango malamu etali Yesu Kristo.

Mibali oyo bazalaki kokamba lisangá bamonaki milende ya Timote. Na ntembe te, ndenge elenge yango azalaki kolendisa moto nyonso oyo azalaki zingazinga na ye esimbaki mpenza mitema na bango. Oyo eleki ntina, Yehova amonaki oyo Timote azalaki kosala. Na litambwisi ya elimo na ye, Nzambe asalaki ete bisakweli mosusu elobela Timote; mbala mosusu elobela mosala oyo akosala mokolo mosusu na masangá mingi. Ntango Paulo ayaki kotala bango, amonaki ete Timote akoki kosalisa ye na mobembo na ye ya misionɛrɛ. Bandeko ya Listra bandimaki. Batyelaki ye mabɔkɔ, elembo oyo emonisaki ete baponaki ye akokisa mokumba moko ya ntina mingi na mosala ya Yehova Nzambe.​—1 Timote 1:18; 4:14.

Tókanisa naino ndenge Timote akamwaki mpe amikitisaki ndenge batyelaki ye motema mpe bapesaki ye mokumba wana monene. Amibongisaki mpo na kokende. * Kasi, tata ya Timote oyo azalaki mondimi te asalaki nini ntango ayokaki ete mwana na ye azwi mokumba ya misionɛrɛ? Ekoki kozala ete azalaki kokana makambo mosusu mpo na avenire ya mwana na ye. Bongo mama mpe nkɔkɔ ya Timote? Bazalaki nde na esengo makasi atako balingaki komonisa polele te ete bazalaki komitungisa soki mwana na bango akozala na libateli? Kokanisa bongo ezali mabe te.

Toyebi ete Timote akendaki. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, akómaki kosala mibembo lokola misionɛrɛ elongo na Paulo. Ntango azalaki kotambola, basandale na ye ezalaki kosala makɛlɛlɛ mpo na mabele ya mabangamabanga ná matiti oyo azalaki konyata; Listra ezalaki kotikala mosika mpe yango emonisaki ete azalaki kokende mosika, na esika oyo ayebi te. Nsima ya kotambola mokolo mobimba, mibali yango misato bakómaki na Ikoniumu. Na nsima, Timote akómaki kotala ndenge Paulo ná Silasi bazalaki koyebisa bato malako ya sika oyo eutaki epai ya mikóló-bakambi na Yerusaleme mpe ndenge balendisaki kondima ya bakristo na Ikoniumu. (Misala 16:4, 5) Kasi yango ezalaki kaka ebandeli.

Nsima ya kotala masangá na Galatia, bamisionɛrɛ yango basalaki lisusu mobembo na banzela ya gudrɔ oyo Baroma batongaki mpe batambolaki ebele ya bakilomɛtrɛ mpo na kokatisa bangomba mikemike ya Frigia, mpo na kokende na nɔrdi mpe na nsima na wɛsti. Lokola bazalaki se kolanda litambwisi ya elimo ya Nzambe, bakendaki na Troase, bazwaki masuwa mpe bakendaki Masedonia. (Misala 16:6-12) Na ntango yango nde Paulo amonaki mpenza ete Timote azalaki na ntina. Paulo atikaki kutu Timote ná Silasi na Beroya. (Misala 17:14) Atindaki kutu elenge yango ye moko na Tesaloniki. Kuna, Timote amekolaki bandakisa oyo amonaki mpe alendisaki kondima ya bakristo.​—1 Batesaloniki 3:1-3.

Na nsima, Paulo akomaki mpo na Timote boye: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola  ya ye, oyo azali komitungisa mpenza mpo na bino.” (Bafilipi 2:20) Bolamu ya Timote oyo bazalaki kolobela eyaki na mbalakaka te. Timote asalaki mosala makasi na komikitisa mpe na bosembo nyonso ayikelaki mikakatano mpiko. Azali mpenza ndakisa malamu mpo na bilenge lelo oyo! Kobosana te ete makambo oyo ozali kosala nde ekoki kosala ete báloba mabe to malamu mpo na yo. Soki ozali elenge, ozali na libaku malamu mpenza ya komisalela nkombo malamu soki ozali kotya Yehova Nzambe na esika ya liboso na bomoi na yo mpe ozali kosalela basusu makambo na boboto mpe na limemya.

“SALÁ NYONSO EKOKI NA YO MPO OYA EPAI NA NGAI”

Timote amipesaki mobimba na mosala ya Nzambe banda bomwana

Timote alekisaki mbula koleka 14 na mosala elongo na moninga na ye ntoma Paulo. Akutanaki na makama mingi oyo Paulo mpe akutanaki na yango na mosala na ye ata mpe makambo ya malamu. (2 Bakorinti 11:24-27) Timote akɔtaki mpe kutu bɔlɔkɔ mpo na kondima na ye. (Baebre 13:23) Azalaki mpe na bolingo makasi mpe komibanzabanza lokola Paulo mpo na bandeko na ye bakristo. Na yango, Paulo akomelaki ye boye: “Nazali kokanisa mpisoli na yo.” (2 Timote 1:4) Ndenge moko na Paulo, emonani ete Timote azalaki ‘kolela elongo na bato oyo bazali kolela,’ komitya na esika na bango mpo na kolendisa mpe kobɔndisa bango malamu. (Baroma 12:15) Tiká ete mokomoko na biso ayekola mpe kosala bongo!

Tokoki kokamwa te soki na nsima Timote azwaki mokumba ya kotambola mpo na kolendisaka masangá. Paulo apesaki ye kaka te mokumba ya kotalaka masangá mpo na kolendisa yango kasi mpe mokumba ya kopona bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami mpo bákóma bankulutu mpe basaleli na misala.​—1 Timote 5:22.

Paulo alingaki Timote mingi, apesaki ye batoli mingi ya ntina lokola oyo ya tata epai ya elenge mobali. Alendisaki Timote akolisa makoki na ye mpe akoba kokende liboso na makambo ya Nzambe. (1 Timote 4:15, 16) Alendisaki Timote atika te ete bolenge na ye mpe mbala mosusu ezaleli na ye ya nsɔninsɔni epekisa ye kokangama na oyo ezali sembo. (1 Timote 1:3; 4:6, 7, 11, 12) Paulo apesaki ye kutu toli na ndenge ya kosala na bamaladi oyo bilenge mibali babɛlaka, ekoki kozala maladi ya estoma ezalaki kotungisa ye mingi.​—1 Timote 5:23.

Ntango ekokaki oyo Paulo ayebaki ete nsuka ya bomoi na ye ekómi pene; ekoki kozala ete etikalaki moke báboma ye. Atindelaki Timote mokanda ya nsuka oyo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mokanda yango ezali mpe na maloba oyo ya kosimba motema: “Salá nyonso ekoki na yo mpo oya epai na ngai noki.” (2 Timote 4:9) Paulo alingaki Timote mingi; abengaki ye “mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo.” (1 Bakorinti 4:17) Tokoki kokamwa te soki alingaki ete moninga na ye azala pene na ye lokola liwa na ye ekómaki pene! Ekozala malamu biso nyonso tómituna boye: ‘Bato balukaka ngai mpo nabɔndisa bango ntango bakutani na mikakatano?’

Timote azalaki na likoki ya kokóma epai ya Paulo na ngonga oyo ebongi? Toyebi te. Toyebi kaka ete azalaki ntango nyonso kosala nyonso mpo na kobɔndisa mpe kolendisa Paulo mpe bandeko mosusu mingi. Bomoi na ye eyokanaki mpenza na nkombo na ye Timote oyo elakisi, “Moto oyo akumisaka Nzambe.” Mpe atikelá biso nyonso ndakisa malamu ya kondima, oyo tokoki komekola, ezala tozali mikóló to bilenge.

^ par. 9 Talá lisolo “Oyebaki yango?” na nimero oyo.

^ par. 20 Timote andimaki kutu bákata ye ngenga ndenge Paulo asɛngaki; ezalaki te mpo ezalaki mobeko ya bokristo kasi mpo Paulo alingaki te ete Bayuda oyo basengelaki kosakwela bango nsango malamu báboya mpo tata ya elenge mobali yango azalaki Moyisraele te.​—Misala 16:3.