Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Novembre 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE NINI NZAMBE ATALELAKA BITUMBA?

Ndenge Nzambe azalaki kotalela bitumba na ntango ya kala

Ndenge Nzambe azalaki kotalela bitumba na ntango ya kala

Bato bazalaki konyokwama. Bazalaki mbala na mbala kobondela Nzambe asalisa bango, kasi asalisaki bango mbala moko te. Bato yango bazalaki Bayisraele, libota ya Nzambe na ntango ya kala. Ezipito, ekólo moko ya nguya nde ezalaki konyokola bango. (Kobima 1:13, 14) Na boumeli ya bambula mingi, Bayisraele bazelaki ete Nzambe asilisa mpasi oyo bazalaki komona na Ezipito. Nsukansuka, ntango ekokaki mpo Nzambe asala likambo yango. (Kobima 3:7-10) Biblia elobi ete Nzambe ye moko abundisaki Baezipito. Abimiselaki bango malɔzi mingi mpe na nsima abomaki mokonzi ya Ezipito mpe basoda na ye na Mbu Motane. (Nzembo 136:15) Yehova Nzambe amonisaki ete azali “elombe ya etumba” mpo na bato na ye.​—Kobima 15:3, 4.

Lokola Nzambe ye moko nde abundisaki Baezipito, yango emonisi ete aboyaka bitumba nyonso te. Na mabaku mosusu, atindaki Bayisraele, bato na ye bábunda. Na ndakisa, atindaki bango bábunda na Bakanana, oyo bazalaki bato mabe mpenza. (Kolimbola Mibeko 9:5; 20:17, 18) Ayebisaki Davidi mokonzi ya Yisraele abundisa Bafilistia. Kutu Nzambe alakisaki Davidi mayele ya kobunda oyo esalaki ete bálonga etumba yango.​—2 Samwele 5:17-25.

Masolo yango ya Biblia emonisi ete ntango Bayisraele bazalaki kokutana na makambo mosusu ya mabe mpe konyokwama, Nzambe azalaki kotinda bango bábunda mpo na kobatela bato na ye mpe losambo ya solo. Kasi, talá makambo misato ya ntina oyo elandi, oyo etali bitumba oyo Nzambe azalaki kotinda bango bábunda:

  1. NZAMBE NDE AZALAKI KOMONISA NANI AKOBUNDA ETUMBA. Mokolo moko, ntango Bayisraele balingaki kobunda, Nzambe ayebisaki bango boye: “Bokozala na ntina ya kobunda te na mbala oyo.” Mpo na nini? Nzambe ye moko alingaki kobundela bango. (2 Ntango 20:17; 32:7, 8) Abundelaki bango mbala mingi, na ndakisa, na libaku oyo tolobeli na lisolo oyo. Na bantango mosusu, Nzambe atindaki bato na ye na Yisraele bábunda bitumba oyo andimaki; mingimingi oyo esɛngaki kobatela Mokili oyo apesaki bango.​—Kolimbola Mibeko 7:1, 2; Yosua 10:40.

  2. NZAMBE NDE AZALAKI KOMONISA NTANGO OYO ETUMBA YANGO EKOSALEMA. Basaleli ya Nzambe basengelaki kozela na motema kokita ntango  oyo Nzambe atyelaki bango mpo na kobundisa bato mabe oyo bazalaki konyokola bango, oyo bafandaki zingazinga na bango. Bazalaki kozela ntango ekoka liboso bábunda. Soki bazeli te, Nzambe azalaki kosundola bango. Kutu, Biblia emonisi ete ntango Bayisraele bazalaki kobunda bitumba oyo Nzambe apesaki bango nzela te, mbala mingi bazalaki kolonga te. *

  3. Atako Nzambe abundisaki Bakanana, abikisaki bamosusu, na ndakisa Rahaba mpe libota na ye

    NZAMBE ASEPELAKA NA LIWA YA MOTO TE, ATA YA MOTO MABE. Bomoi eutá epai ya Yehova Nzambe, oyo asalá bato. (Nzembo 36:9) Na yango, asepelaka te bato bákufa. Kasi, likambo ya mawa, ezali na bato oyo na motema mabe nyonso, balingaka konyokola ata mpe koboma basusu. (Nzembo 37:12, 14) Mpo na kopekisa mabe ya ndenge wana, na bantango mosusu Nzambe apesaki nzela ete bábundisa bato mabe. Ata bongo, na boumeli ya bambula nyonso oyo atindaki Bayisraele bábunda bitumba ya ndenge wana, azalaki kaka na “motema mawa” mpe ‘koyoka nkanda noki te’ epai ya bato oyo bazalaki konyokola Bayisraele. (Nzembo 86:15) Na ndakisa, alobaki ete liboso Bayisraele bábundisa engumba moko, basengelaki naino “koyebisa bato na yango makambo oyo basengeli kosala mpo kimya ezala,” mpo na kopesa bango libaku ya kobongola bizaleli na bango mpe koboya bitumba. (Kolimbola Mibeko 20:10-13) Na ndenge yango, Nzambe amonisaki ete ‘asepelaka na liwa ya moto mabe te, asepelaka nde ete moto mabe abongwana, atika nzela na ye mpe atikala mpenza na bomoi.’​—Ezekiele 33:11, 14-16. *

Makambo oyo nyonso emonisi ete na ntango ya kala, Nzambe azalaki kotalela bitumba lokola mwaye oyo ebongi mpo na kosilisa mabe mpe minyoko ya ndenge nyonso. Kasi, Nzambe nde azalaki na lotomo ya koyebisa ntango nini bitumba yango esengelaki kobanda mpe nani akobunda, kasi bato te. Nzambe azalaki kobunda bitumba yango na esengo nyonso, mpo azalaki na mposa makila mingi esopana? Ezali bongo te. Ayinaka mpenza mobulu. (Nzembo 11:5) Ndenge oyo Nzambe atalelaka bitumba ebongwanaki nde ntango Mwana na ye Yesu abandaki mosala na ye awa na mabele na siɛklɛ ya liboso?

^ par. 7 Na ndakisa, mokolo moko Bayisraele balongaki te ntango babundisaki Baamaleke mpe Bakanana mpo Nzambe atindaki bango te bábunda. (Mitángo 14:41-45) Bambula mingi na nsima, Yosiya, mokonzi moko ya sembo akendaki kobunda etumba oyo Nzambe atindaki ye te mpe lokola awelaki kobunda, abungisaki bomoi na ye.​—2 Ntango 35:20-24.

^ par. 8 Mpo na nini liboso ya kobunda na Bakanana, Bayisraele bayebisaki bango te makambo oyo basengelaki kosala mpo kimya ezala? Mpo Nzambe apesaki Bakanana mbula 400 mpo bátika bizaleli na bango ya mabe. Kasi, ntango Bayisraele bayaki kobundisa Bakanana, mingi ya bato yango bazalaki kaka kokoba na bizaleli na bango ya mabe. (Ebandeli 15:13-16) Yango wana, esɛngaki ete bango nyonso bábomama. Kasi, bato mosusu ya Kanana oyo babongolaki bizaleli na bango babikisamaki.​—Yosua 6:25; 9:3-27.